bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 3
Luke 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 4 →
1
Tango Tibere Sezare akokisaki bambula zomi na mitano na bokonzi na ye, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yudea, Erode azalaki mokonzi ya Galileya mpe ndeko na ye Filipi azalaki mokonzi ya Itureya mpe Trakonite, mpe Lisaniasi azalaki mokonzi ya Abilene.
2
Bongo Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya banganga-Nzambe. Liloba ya Nzambe eyaki epai Jean mwana ya Zakariya, kati na esobe.
3
Jean akendaki na ekolo mobimba oyo ezalaki pembeni na mayi ya Yordani; azalaki koteya: “Bozwa libatisi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino!”
4
Ndenge ekomama na buku ya maloba ya moprofeta Ezayi: Mongongo ya moto ezali koganga na esobe: Bobongisa nzela ya Nkolo, bosalela ye banzela oyo etengama te!
5
lubwaku nyonso ekotondisama, Ngomba nyonso ya monene mpe oyo ya moke ekolalisama, babala-bala ya kotengama bakokomisa yango alima mpe banzela ya mabanga-mabanga bakokomisa yango malamu.
6
Bongo bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe!
7
Jean azalaki koloba na bato oyo bazalaki koya mpo na kozwa libatisi epai na ye: —Bino mabota ya banyoka! Nani akebisi bino ete bokima kanda oyo ezali koya?
8
Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo bobongoli mitema. Mpe botika koloba na nse ya mitema na bino: “Abraham azali tata na biso!” Pamba te, nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo!
9
Epasola koni esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete; nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto!
10
Ebela ya bato batunaki ye: —Esengeli tosala nini?
11
Jean azongisaki: —Moto oyo azali na kazaka mibale, apesa moko na oyo azangi yango. Moto oyo azali na biloko ya kolia asala mpe ndenge moko.
12
Bafutisi mpako bayaki mpe mpo na kozwa libatisi; bongo batunaki Jean: —Moteyi, tosengeli kosala nini?
13
Azongiselaki bango: —Tango bofutisaka mpako bobakisa mbongo mosusu te likolo ya oyo batindaka bino!
14
Basoda mpe batunaki ye: —Bongo biso, tosengeli kosala nini? Jean azongiselaki bango: —Bobotola bato mbongo te mpe bofunda bato na ndenge ya lokuta te; kasi botalela kaka lifuti na bino.
15
Bato bazalaki kozela na elikya monene mpe bango nyonso bazalaki komituna-tuna na nse ya mitema, soki Jean azali Kristo.
16
Jean azongiselaki bango nyonso: —Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi moto moko azali koya, aleki ngai na nguya, mpe nazali ya kokoka kutu te mpo na kofungola basinga ya ba sandale na ye. Ye moto akobatisa bino na Molimo Mosantu mpe na moto.
17
Asimbi kiyungulu na maboko na ye, akopetola esika na ye oyo batutelaka mbuma; mpe akobomba ble na ebombelo na ye; kasi akotumba matiti na moto moko oyo ekufaka te!
18
Jean azalaki kolendisa bato mpe azalaki koteya bango Sango-Malamu na maloba mosusu mingi.
19
Kasi Jean apamelaki mokonzi Erode mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo asalaki lisusu makambo mingi ya mabe.
20
Erode abakisaki lisusu mabe oyo, likolo ya mabe na ye nyonso: Atiaki Jean na boloko.
21
Tango bato nyonso bazwaki libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Awa azalaki kobondela, likolo efungwamaki
22
mpe Molimo Mosantu akitaki likolo na ye, na lolenge ya pijon. Bongo mongongo moko ewutaki na Likolo: —Ozali mwana na ngai ya bolingo; osepelisaka ngai mingi penza!
23
Yesu akomaki pene-pene na bambula ntuku misato tango abandaki mosala na ye. Bato bazalaki kokanisa ete azalaki mwana ya Zozefi, mwana ya Eli,
24
mwana ya Matati, mwana ya Levi, mwana ya Melki, mwana ya Zanai, mwana ya Zozefi,
25
mwana ya Matatiasi, mwana ya Amosi, mwana ya Nahumi, mwana ya Esli, mwana ya Nagai,
26
mwana ya Maati, mwana ya Matatiasi, mwana ya Semeini, mwana ya Zoseki, mwana ya Zoda,
27
mwana ya Zoanani, mwana ya Reza, mwana ya Zorobabele, mwana ya Sabatiele, mwana ya Neri,
28
mwana ya Melki, mwana ya Adi, mwana ya Kosami, mwana ya Elmadami, mwana ya Eri,
29
mwana ya Zosue, mwana Eliezeri, mwana ya Zorimi, mwana ya Matati, mwana ya Levi,
30
mwana ya Simeon, mwana ya Yuda, mwana ya Zozefi, mwana ya Zonami, mwana ya Eliakim,
31
mwana ya Meleya, mwana ya Mena, mwana ya Matata, mwana ya Natan mwana ya David,
32
mwana ya Isayi, mwana ya Obedi, mwana ya Boazi, mwana ya Salmon, mwana ya Nason,
33
mwana ya Aminadab, mwana ya Admina, mwana ya Arni, mwana ya Esromi, mwana ya Farezi, mwana ya Yuda,
34
mwana ya Zakobi, mwana Izaki, mwana ya Abraham, mwana ya Tera, mwana ya Nakor,
35
mwana ya Serusi, mwana ya Ragau, mwana ya Faleki, mwana ya Eber, mwana ya Sala,
36
mwana ya Kayinami, mwana ya Arfazadi, mwana na Semi, mwana ya Nowa, mwana ya Lemeki,
37
mwana ya Matusala, mwana ya Enoki, mwana ya Zaredi, mwana ya Maleleel, mwana ya Kayinami,
38
mwana ya Enosi, mwana ya Seti, mwana na Adam, mwana ya Nzambe.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24