bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 19
Luke 19
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 18
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 20 →
1
Yesu akotaki na Zeriko mpe alekaki na kati na yango.
2
Moto moko azalaki wana, kombo na ye Zashe; ye azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe moto ya bomengo.
3
Alingaki amona soki Yesu azalaki moto ya lolenge nini, kasi lokola azalaki mokuse, yango wana akokaki komona ye te mpo bato bazalaki ebele penza.
4
Akimaki mbangu liboso na bango, mpe amataki na nzete ya Sikomore mpo amona Yesu, pamba te Yesu asengelaki koleka wana.
5
Tango Yesu akomaki na esika wana, atalaki na likolo mpe alobaki na ye: —Zashe, kita noki! Pamba te, nasengeli kozala lelo na ndako na yo!
6
Bongo Zashe akitaki noki na nzete, mpe ayambaki Yesu na esengo monene.
7
Tango bato bamonaki bongo, babandaki koyima-yima mpe balobaki: —Tala, akeyi kovanda na ndako ya moto ya masumu!
8
Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Nkolo: —Nkolo yoka, nakopesa sikʼoyo kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola. Mpe soki nakosaki moto mpo na kozwa eloko na ye, nakozongisela ye yango mbala minei!
9
Bongo alobaki na ye: —Lobiko ekoti lelo na ndako oyo, mpo moto oyo mpe azali mwana ya Abraham.
10
Pamba te, Mwana na moto ayaki koluka mpe kobikisa moto oyo abunga!
11
Awa bato bazalaki koyoka makambo wana, Yesu akobaki mpe alobaki na bango lisapo moko, mpo azalaki pene-pene na Yeruzalem, mpe bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingaki komonana kaka na tango wana.
12
Bongo Yesu alobaki: —Moto moko ya lokumu akendaki na ekolo moko ya mosika mpo na kozwa bokonzi mpe na sima azonga.
13
Abengaki basali zomi na kati ya basali na ye, mpe apesaki bango mine zomi; bongo alobaki na bango: —Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga!
14
Kasi bato ya ekolo na ye bazalaki koyina ye; mpe batindaki bantoma na sima na ye mpo na koloba: “Tolingi te ete moto oyo akoma mokonzi na biso.”
15
Awa batiaki ye mokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengisaki basali oyo ye apesaki mbongo, mpo ayeba soki mbongo boni moko na moko azwaki na mombongo na ye.
16
Moto ya liboso ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, mine na yo eboti mine zomi!”
17
Mokonzi alobaki na ye: “Osali malamu! Ozali mosali malamu! Lokola ozalaki sembo na likambo ya moke. Nakomisi yo moyangeli ya bavile zomi.”
18
Moto ya mibale ayaki mpe alobaki na ye: “Mokonzi, mine na yo eboti mina mitano!”
19
Mokonzi na ye azongisaki: “Kamata mokumba ya koyangela bavile mitano.”
20
Bongo mosali mosusu ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, tala mina na yo! Nabombaki yango malamu na elamba.
21
Pamba te, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata. Ozwaka biloko oyo obombaka te, mpe obukaka biloko oyo olonaka te.”
22
Mokonzi azongiselaki ye: “Mosali mabe! Nakopesa yo etumbu na maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, nazwaka biloko oyo nabombaka te mpe nabukaka biloko oyo nalonaka te;
23
mpo na nini otiaki mbongo na ngai na banki te mpo ete awa nazongi nakoka kozwa yango na benefisi?”
24
Bongo alobaki na bato oyo bazalaki wana: “Bobotola ye mine yango, mpe bopesa yango na moto oyo azali na mine zomi!”
25
Bango balobaki na ye: “Nkolo, ye azali na yango zomi!”
26
Mokonzi azongisaki: “Nalobi na bino, moto oyo azali na biloko, bakopesa ye lisusu; kasi moto oyo azangi biloko, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
27
Kasi banguna wana, baoyo balingaki te ete nakoma mokonzi na bango, boya na bango awa, mpe boboma bango na miso na ngai!”
28
Awa Yesu asilisaki koloba makambo wana, akendaki liboso na bango, mpo na kokende na Yeruzalem.
29
Tango akomaki pene-pene na Betfaze mpe Betaniya, pembeni ya ngomba oyo babengaka: “Ngomba ya banzete ya Olive”, atindaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye
30
mpe alobaki na bango: —Bokende na mboka oyo etalani na bino; tango bokokota, bokomona mwana ya mpunda bakanga na singa, oyo moto ata moko naino amatela yango te; bofungola yango, mpe boya na yango.
31
Soki moto atuni bino: “Mpo na nini bozali kofungola yango?”, bozongisela ye: “Nkolo azali na posa na yango!”
32
Baoyo batindamaki, bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso kaka ndenge ye ayebisaki bango.
33
Tango bazalaki kofungola mwana mpunda, bankolo na yango batunaki: —Mpo na nini bozali kofungola mwana mpunda?
34
Bazongisaki: —Nkolo azali na posa na yango.
35
Bongo bamemaki yango epai ya Yesu; batiaki bilamba na bango likolo na yango: bongo Yesu avandaki likolo na yango.
36
Awa azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
37
Mpe tango akomaki pene-pene na esika epai nzela ezalaki kokita na Ngomba ya banzete ya Olive, ebele ya bayekoli nyonso batondaki na esengo mpe babandaki kokumisa Nzambe na mongongo makasi mpo na makamwisi nyonso bamonaki.
38
Bazalaki koloba: —Lokumu na Mokonzi oyo aye na kombo ya Nkolo! Kimia na Likolo, mpe nkembo na bisika bileki likolo!
39
Bongo bafarizeo mosusu balobaki na ye wuta na kati ya ebele ya bato: —Moteyi, pamela bayekoli na yo.
40
Bongo Yesu azongiselaki bango: —Nalobi na bino, soki bango bavandi nye, mabanga ekoganga!
41
Tango Yesu akomaki pene-pene na Yeruzalem, mpe amonaki vile yango, abandaki kolela mpo na yango;
42
mpe alobaki: —Soki yo mpe oyebaki na mokolo ya lelo likambo oyo elingaki komemela yo kimia—kasi sikʼoyo, yango ezali ya kobombama na miso na yo.
43
Pamba te mikolo ya pasi ekokweyila yo, tango banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozinga yo mpe bakofina-fina yo bipai nyonso.
44
Bakokweyisa yo na mabele, yo na bato oyo bazali na kati ya lopango na yo; mpe bakotika te libanga moko likolo ya libanga mosusu pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.
45
Bongo akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko. Alobaki na bango:
46
—Ekomama: Ndako na ngai ezali Ndako ya mabondeli, kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi!
47
Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe. Bokonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko, mpe bakonzi ya Bayuda, bazalaki koluka koboma ye;
48
kasi bazwaki nzela ya kosala yango te pamba te bato nyonso bazalaki na posa mingi ya koyoka ye.
← Chapter 18
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 20 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24