bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 17
Luke 17
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 16
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 18 →
1
Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Makambo oyo ekweyisaka bato na masumu ekoki kozanga te, kasi mawa mingi na moto oyo akozala nzela oyo makambo yango ekoyela.
2
Eleki malamu mpo na ye, bakanga ye libanga moko ya monene na kingo, mpe babwaka ye na ebale, na esika ete akweisa moko ya bana oyo.
3
Bomikebisa malamu bino moko! —Soki ndeko na yo asala yo mabe, pamela ye; mpe soki ayoki mawa mpo na yango, limbisa ye.
4
Mpe soki asali yo mabe mbala sambo na mokolo, mpe aye epai na yo mbala sambo mpo na koloba na yo: “Nayoki mawa na mabe na ngai”, limbisa ye.
5
Bapostolo balobaki na Nkolo: —Bakisela biso kondima!
6
Nkolo azongiselaki bango: —Soki bozali na kondima lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: “Mipikola mpe milona na kati ya ebale”, mpe yango ekotosa bino.
7
—Nani kati na bino soki azali na mosali oyo asalaka na bilanga to abatelaka bameme, tango azongaka na bilanga, alobaka na ye: “Yaka noki, vanda na mesa mpo olia?”
8
Boni, bolobaka na ye te ete: “Lambela ngai biloko, lata bilamba ya mosala mpe salela ngai kino nakosilisa kolia mpe komela; bongo na sima okolia mpe okomela?”
9
Boni, mokonzi asengeli kopesa mosali wana matondi mpo asali mosala oyo batindaki ye?
10
Ndenge moko mpe mpo na bino: soki bosali nyonso oyo batindaki bino, boloba: “Tozali kaka basali ya pamba; tosali kaka mosala na biso.”
11
Awa Yesu azalaki kokende na Yeruzalem, alekaki na Samariya mpe na Galileya.
12
Tango azalaki kokota na mboka moko, bato zomi ya maladi ya maba bayaki kokutana na ye; batelemaki na mosika
13
mpe babandaki kobelela ye na mongongo makasi: —Yesu, Mokonzi yokela biso mawa!
14
Tango amonaki bango, alobaki: —Bokende komilakisa na banganga-Nzambe! Tango bazalaki kokende, bakomaki peto.
15
Moko na kati na bango, tango amonaki ete abikaki, azongaki epai ya Yesu, mpe azalaki kokumisa Nzambe na mongongo makasi!
16
Afukamaki liboso ya Yesu, elongi na nse, apesaki ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samariya.
17
Bongo Yesu atunaki: —Bokomaki peto bino zomi, ezali boye te? Bongo wapi libwa mosusu?
18
Ata moko te azongi mpo na kokumisa Nzambe, longola kaka mopaya oyo?
19
Bongo alobaki na ye: —Telema mpe kende; kondima na yo ebikisi yo!
20
Mbala moko, bafarizeo batunaki ye soki tango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya. Yesu azongiselaki bango: —Bokonzi ya Nzambe ekoya te na ndenge ete bato bamona yango.
21
Bakoloba te ete: “Ezali awa”, to “Ezali kuna”, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino!
22
Bongo alobaki na bayekoli na ye: —Tango ezali koya, oyo bokozala na posa monene ya komona mokolo moko ya mikolo Mwana ya moto, kasi bokomona yango te.
23
—Bato bakoloba na bino: “Azali awa!” to “Azali kuna!” Bokende te, mpe bolanda bango te.
24
Ndenge kongenga ya kake ebimaki na likolo mpe engengisaka epai moko kino epai mosusu, ekozala mpe bongo na Mokolo ya Mwana ya moto.
25
Kasi liboso esengeli amona pasi mingi, mpe bato ya tango oyo baboya ye.
26
—Makambo oyo elekaki na mikolo ya Nowa, ekoleka mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto.
27
Bato bazalaki kolia, komela, kobala, mpe kobalisa bana na bango, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa. Bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.
28
Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Loti. Bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.
29
Kasi mokolo Loti abimaki na Sodomo, mbula ya moto mpe ya sufulu ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.
30
Ekozala mpe bongo mokolo Mwana ya moto akomonana.
31
Na mokolo wana, moto oyo akozala likolo ya ndako mpe akozala na biloko na ndako, akita te mpo na kozwa yango. Ndenge moko mpe mpo na moto oyo akozala na bilanga, azonga te mpo na eloko soki nini.
32
Bokanisa mwasi ya Loti!
33
Moto oyo akolinga kobatela bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akobungisa yango, akobatela yango.
34
Nalobi na bino, butu wana, bato mibale bakolala mbeto moko: bakozwa moko mpe mosusu akotikala.
35
Basi mibale bakozala kotuta mbuma esika moko: bakozwa moko mpe mosusu akotikala. [
36
Mibali mibale bakozala na elanga: bakozwa moko mpe mosusu akotikala.]
37
Bongo bayekoli batunaki ye: —Nkolo, makambo yango ekosalama wapi? Yesu azongiselaki bango: —Esika ebembe ezali, bandeke oyo eliaka ebembe esanganaka wana ku!
← Chapter 16
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 18 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24