bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 18
Luke 18
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 17
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 19 →
1
Bongo Yesu alobaki lisapo moko epai ya bayekoli na ye mpo na kolakisa bango ete esengeli babondelaka tango nyonso mpe balembaka te.
2
Alobaki: —Na vile moko, zuzi moko azalaki kuna. Azalaki kobanga Nzambe te mpe azalaki kotosa bato te.
3
Mwasi moko akufela mobali azalaki mpe na vile yango; ye azalaki koya mbala na mbala epai na ye mpo na koloba: “Longisa ngai liboso ya monguna na ngai.”
4
Banda kala zuzi azalaki koboya. Kasi suka na yango alobaki na nse ya motema: “Ata nabangaka Nzambe te mpe natosaka bato te,
5
kasi lokola mwasi mokufeli mobali oyo azali kotungisa ngai, nakolongisa ye; soki te akolembisa ngai mpo na koyaka na ye tango nyonso.”
6
Bongo Nkolo alobaki; —Boyoka malamu maloba oyo zuzi ya mabe alobaki.
7
Boni, bokanisi ete Nzambe mpe akolongisa te bato oyo ye apona, baoyo bazangaka epai na ye butu na moi? Akowumela mpo na kosalisa bango?
8
Nalobi na bino, akolongisa bango noki. Kasi, tango Mwana ya moto akoya, akokuta kondima na mokili?
9
Yesu alobaki lisusu lisapo oyo mpo na bato oyo bazalaki kotia mitema na bango moko ete bazali bato sembo mpe bazalaki kotiala bato mosusu.
10
—Bato mibale bakendeki na Ndako ya Nzambe mpo na kobondela: moko azalaki mofarizeo mpe mosusu mofutisi mpako.
11
Mofarizeo atelemaki mpe abondelaki boye na nse ya motema: “E e Nzambe, natondi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, oyo bazali miyibi, basalaka mabe, bazali bandumba, to lokola mofutisi mpako oyo.
12
Naboyaka kolia mpo na kobondela mbala mibale na poso, mpe napesaka eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo nazwaka.”
13
Kasi mofutisi mpako atelemaki mosika, mpe alingaki kutu te kotombola miso na likolo. Azalaki komibeta na tolo mpe koloba: “E e Nzambe, yokela ngai mawa, ngai moto ya masumu!”
14
Nalobi na bino ete, moto oyo, azongaki na ndako akomi moto na sembo na miso ya Nzambe, kasi oyo mosusu te. Pamba te, moto oyo akomimatisa, bakokitisa ye; mpe oyo akomikitisa, bakomatisa ye!
15
Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo asimba bango, kasi tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango.
16
Kasi Yesu abengaki bana mike epai na ye mpe alobaki: —Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te; pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato ya ndenge oyo.
17
Ya solo nalobi na bino: Moto nyonso oyo akoyamba Bokonzi ya Nzambe te lokola mwana moke, akokota kuna te.
18
Bongo mokonzi moko ya Bayuda atunaki ye: —Moteyi malamu, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko?
19
Yesu azongiselaki ye: —Mpo na nini obengi ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko.
20
Oyebi Mibeko: “Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, tosa tata mpe mama na yo!”
21
Moto yango azongisaki: —Nyonso wana, natosaka yango banda bolenge na ngai.
22
Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na ye: —Ozangi naino eloko moko; teka biloko nyonso oyo ozali na yango, mpe pesa na babola, bongo okozwa bomengo na Likolo. Sima yaka, mpe landa ngai!
23
Tango ayokaki maloba wana, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki moto ya bomengo mingi penza.
24
Awa Yesu amonaki ete akomaki mawa-mawa, alobaki: —Ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe!
25
Ezali pasi te na samo mpo na koleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.
26
Baoyo bayokaki yango batunaki: —Bongo nani akoki kobika?
27
Yesu azongisaki: —Likambo oyo bato bakoki kosala te, Nzambe akoki kosala yango!
28
Bongo Piere alobaki: —Totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda yo!
29
Yesu alobaki na bango: —Ya solo nalobi na bino: moto moko te oyo atiki dako na ye, to mwasi na ye, to bandeko na ye ya mibali, to baboti na ye, to bana na ye, mpo na Bokonzi ya Nzambe,
30
akozanga kozwa biloko mingi koleka na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.
31
Yesu akamataki bapostolo na ye zomi na mibale na pembeni mpe alobaki na bango: —Tala, tozali kokende na Yeruzalem, mpe makambo nyonso oyo baprofeta bakoma mpo na Mwana ya moto ekokokisama.
32
Pamba te, bakokaba ye na maboko ya bapakanu, bakoseka ye, bakofinga ye, bakobwakela ye soi,
33
bakobeta ye bafimbo mpe bakoboma ye; mpe akosekwa na mokolo ya misato.
34
Bayekoli basosolaki eloko ata moko te na makambo yango; pamba te ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te soki Yesu alingaki koloba nini.
35
Awa Yesu akomaki pene-pene na Zeriko, moto moko akufa miso avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga mbongo.
36
Tango ayokaki ebele ya bato bazalaki koleka, atunaki soki likambo nini yango.
37
Balobaki na ye “Yesu ya Nazareti azali koleka.”
38
Abandaki konganga: —Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
39
Bato oyo bazalaki liboso ya molongo bapekisaki ye mpo atika koloba; kasi agangaki lisusu makasi koleka: —Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
40
Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela ye moto wana akufa miso. Tango akomaki pene-pene na ye, Yesu atunaki ye:
41
—Olingi nasala nini mpo na yo? Ye azongisaki: —Nkolo, nalingi namona lisusu.
42
Bongo Yesu alobaki na ye: —Mona, kondima na yo ebikisi yo!
43
Kaka na tango wana, moto yango abandaki komona, alandaki Yesu, mpe azalaki kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki likambo yango, bango mpe bakumisaki Nzambe.
← Chapter 17
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 19 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24