bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 22
Luke 22
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 21
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 23 →
1
Feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, oyo babengaka feti ya Pake, ekomaki pene-pene.
2
Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koluka nzela ya koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.
3
Bongo Satana akotaki na motema ya Yuda, oyo babengaka Iskariote; ye azalaki mopostolo moko na kati ya bapostolo zomi na mibale.
4
Yuda akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe epai ya bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe. Ayokanaki na bango soki ndege nini akoteka Yesu epai na bango.
5
Basepelaki mingi penza mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo.
6
Andimaki mpe abandaki koluka mwaye moko ya malamu mpo akaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete bato bayeba te.
7
Mokolo ya feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, oyo bazalaki koboma mwana meme ya Pake, ekomaki.
8
Yesu atindaki Piere mpe Jean, mpe alobaki na bango: —Bokende kobongisela biso bilei ya Pake, mpo tolia yango.
9
Bango batunaki ye: —Olingi tokende kobongisa yango wapi?
10
Ye azongiselaki bango: —Tango bokokota na vile, bokokutana na mobali moko amemi eluku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako oyo akokota;
11
bongo boloba na nkolo ya ndako: “Moteyi atuni: Esika nini nakosalela mpo na kolia bilei ya Pake elongo na bayekoli na ngai?”
12
Bongo akolakisa bino sambele moko ya monene, na etaze, oyo ebongisami malamu; kuna nde bokobongisa bilei ya Pake.
13
Bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso ndenge Yesu ayebisaki bango; bongo babongisaki bilei ya Pake.
14
Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki elongo na bapostolo na ye na mesa.
15
Bongo alobaki na bango: —Nayokaki posa mingi penza mpo na kolia Pake oyo elongo na bino liboso ete namona pasi.
16
Pamba te, nalobi na bino, nakolia yango lisusu te kino yango ekokokisama kati na Bokonzi ya Nzambe!
17
Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi mpe alobaki: —Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino.
18
Pamba te nalobi na bino, nakomela lisusu vino te kino tango Bokonzi ya Nzambe ekoya.
19
Sima akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki bango yango; bongo alobaki: —Oyo ezali nzoto na ngai, ekabami mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai!
20
Sima ya kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo; mpe alobaki: —Kopo oyo ezali Boyokani ya sika oyo esalami na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopana mpo na bino.
21
—Kasi tala, moto oyo akoteka ngai azali kolia elongo na ngai.
22
Mwana na Moto akokende ndenge yango ebongisama, kasi mawa mingi na moto oyo akoteka ye!
23
Bongo babandaki kotunana bango na bango soki nani kati na bango akosala likambo yango.
24
Bongo tembe ebimaki kati na bango mpo na koyeba soki nani aleki monene.
25
Yesu alobaki na bango: —Bakonzi ya bapakano bapesaka bato na bango mitindo na makasi, mpe baoyo bayangelaka bango balingaka babenga bango “Bato malamu”.
26
Kasi epai na bino ekoki kozala bongo te. Nzokande, moto oyo aleki monene kati na bino esengeli azala lokola leki na kati na bino nyonso, mpe moto oyo ayangelaka, esengeli azala lokola mosali.
27
Pamba te nani aleki monene? Oyo avandi na mesa to oyo azali kosalela ye? Ezali te oyo avandi na mesa? Nzokande ngai nazali na kati na bino, lokola moto oyo azali kosalela bino.
28
—Bino bozali bato oyo bokangaki mitema elongo na ngai na bapasi na ngai nyonso.
29
Lokola Tata apesaki ngai bokonzi, ngai mpe napesi bino yango,
30
mpo ete bolia mpe bomela na mesa na ngai, kati na Bokonzi na ngai; mpe mpo bovanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa bikolo zomi na mibale ya Isayele.
31
—Simon, Simon! Satana asengi bino mpo ayungula bino ndenge bayungulaka ble.
32
Kasi nabondelaki mpo na yo mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe yo, tango okozonga, lendisa bandeko na yo!
33
Bongo Simon alobaki na ye: —Nkolo, nazali ya komibongisa mpo na kokota na boloko elongo na yo mpe kokufa elongo na yo!
34
Kasi Yesu azongiselaki ye: —Piere, nalobi na yo: Lelo, liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato ete oyebi ngai te!
35
Bongo Yesu atunaki bango: —Tango natindaki bino bozalaki na mbongo te, sakosi te, sandale mpe te, boni bozangaki eloko? Bango bazongisaki: —Tozangaki eloko te!
36
Bongo alobaki na bango: —Kasi sikʼoyo, oyo azali na mbongo akamata yango, ndenge moko mpe mpo na moto oyo azali na sakosi. Moto oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango.
37
Pamba te ekomama: Batiaki ye na molongo ya bato mabe. Mpe nalobi na bino: maloba oyo esengeli kokokisama mpo na ngai: makambo oyo ekomama mpo na ngai, ekokokisama.
38
Bongo bango balobaki na ye: —Nkolo, tozali na mipanga mibale awa! Yesu azongisaki: —Ekoki!
39
Bongo Yesu abimaki mpe akendaki na ngomba ya banzete ya Olive lokola amesanaki kosala. Bayekoli na ye mpe balandaki ye.
40
Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango: —Bobondela mpo bokweya na komekama te!
41
Sima apusanaki mwa mosika na bango, afukamaki mpe abondelaki boye:
42
—Tata, soki olingi, longola kopo oyo; tika ete mokano na ngai esalama te, kasi oyo ya yo esalama. [
43
Bongo anzelu ya Likolo abimelaki ye mpe alendisaki ye.
44
Lokola azalaki na kati ya somo monene ya etumba, abondelaki lisusu makasi koleka, motoki na ye ekomaki lokola matanga ya makila, mpe ezalaki kokweya na mabele.]
45
Awa asilisaki kobondela, atelemaki mpe akendaki epai bayekoli na ye bazalaki. Akutaki bango balali pongi mpo na mawa.
46
Bongo Yesu atunaki bango: —Mpo na nini bozali kolala? Botelama, mpe bobondela mpo ete bokweya na komekama te.
47
Tango Yesu azalaki naino koloba, bato ebele penza bayaki; mpe moto oyo bazalaki kobenga kombo Yuda, oyo azalaki moko ya bapostolo zomi na mibale, ye moto azalaki liboso na bango. Apusanaki pene-pene ya Yesu mpo na kopesa ye beze.
48
Kasi Yesu alobaki na ye: —Yuda, oteki Mwana na Moto na beze?
49
Tango bato oyo bazalaki pembeni ya Yesu bamonaki makambo oyo elingaki kosalama, batunaki ye: —Nkolo, olingi tobundisa bango na mipanga?
50
Bongo moko na kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya mobali.
51
Kasi Yesu alobaki: —Tika kosala bongo! Asimbaki litoyi ya moto oyo azokaki, mpe abikisaki ye.
52
Mpe alobaki na bakonzi ya banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, mpe na bampaka oyo bayaki kokanga ye: —Boni, nakomi motomboki mpo boya kokanga ngai na mipanga mpe banzete na maboko?
53
Nazalaki mikolo nyonso elongo na bino na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe moto ata moko te akangaki ngai; kasi sikʼoyo, ezali ngonga na bino mpe molili elingi kolakisa bokonzi na yango.
54
Bakangaki Yesu mpe bamemaki ye na ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Piere azalaki kolanda na mosika.
55
Tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bato bavandaki elongo, Piere mpe avandaki na bango.
56
Mosali moko ya mwasi amonaki ye avandi pembeni ya moto, tango atalaki ye malamu, alobaki: —Moto oyo azalaki na ye!
57
Kasi Piere awanganaki mpe alobaki: —Mwasi, nayebi ye te!
58
Sima ya mwa tango moke, moto mosusu amonaki ye mpe alobaki: —Yo mpe ozali moko na kati na bango! Kasi Piere azongiselaki ye: —Te, mobali, ngai te!
59
Sima ya pene-pene ngonga moko, moto mosusu lisusu alobaki na molende nyonso: —Ya solo, moto oyo azalaki mpe na ye; pamba te azali moto ya Galileya.
60
Kasi Piere azongisaki: —E e mobali! Likambo ozali koloba nayebi yango te! Na tango azalaki naino koloba soso elelaki.
61
Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Piere. Tango Piere akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye: “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato!”
62
Piere abimaki libanda mpe alelaki na mawa mingi penza.
63
Bato oyo bazalaki kokengela Yesu bazalaki koseka ye mpe kobeta ye.
64
Bazalaki kozipa ye elongi mpe kotuna ye: —E e yo! sakola, nani abeti yo?
65
Bongo bazalaki kofinga ye na makambo mosusu mingi.
66
Tango tongo etanaki, bampaka ya Bayuda, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko basanganaki mpe bamemaki Yesu liboso ya likita wana.
67
Bongo babandaki kotuna ye: —Yebisa biso soki yo ozali Kristo. Yesu azongiselaki bango: —Ata nayebisi bino, bokondimela ngai te.
68
Soki mpe natuni bino motuna, bokopesa ngai mpe eyano te.
69
Kasi banda sikʼoyo, Mwana na Moto akovanda na loboko ya mobali ya Nzambe Oyo Aleki na nguya.
70
Bongo bango nyonso batunaki ye: —Elingi koloba ete ozali Mwana na Nzambe? Ye azongiselaki bango: —Bino bato bolobi ete nazali bongo!
71
Bongo balobaki: —Tina nini toluka lisusu matatoli? Biso moko toyoki yango na maloba na ye.
← Chapter 21
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 23 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24