bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 12
1 Corinthians 12
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 11
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 13 →
1
Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi mpo na makambo oyo etali makabo ya Molimo.
2
Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.
3
Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe akoki koloba: “Tika ete Yesu alakelama mabe!”, mpe moto moko te akoki koloba: “Yesu azali Nkolo”, soki akambami na Molimo Mosantu te.
4
Ezali na makabo ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko.
5
Ezali na balotomo ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko.
6
Lolenge ya kosalela Nkolo ezali ndenge na ndenge, kasi Nzambe azali kaka moko, Ye oyo asalaka nyonso kati na bato nyonso.
7
Nzoka nde, Molimo asalaka na nzela ya moto na moto, mpo na bolamu ya bato nyonso.
8
Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya; epai na mosusu, liloba ya boyebi; Molimo moko kaka wana,
9
apesi na mosusu, kondima; na mosusu, likabo ya kobikisa babeli;
10
na mosusu, nguya ya kosala bikamwa; na mosusu, likabo ya kosakola; na mosusu, likabo ya kososola milimo; na mosusu, likabo ya koloba minoko ya ndenge na ndenge; na mosusu, likabo ya kolimbola minoko.
11
Kasi kaka Molimo moko wana nde asalaka misala nyonso wana; mpe akobolaka makabo na Ye na moto na moto, ndenge Ye moko alingi.
12
Nzoto ezali kaka moko, atako ezali na biteni ebele; mpe atako biteni yango nyonso ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Boye, ezali mpe bongo mpo na Klisto.
13
Pamba te, biso nyonso tobatisamaki kaka na Molimo moko, mpo na kozala nzoto moko: ezala Bayuda to bato ya bikolo ya bapaya, ezala bawumbu to bansomi. Mpe biso nyonso tozwaki ya komela wuta na Molimo moko kaka wana.
14
Nzoto ezali kaka na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.
15
Soki lokolo elobi: “Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te.” Boni, ekotika solo kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo?
16
Mpe soki litoyi elobi: “Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te.” Boni, ekotika solo kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo?
17
Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, boye nzoto yango elingaka koyoka ndenge nini? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, boye nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini?
18
Kasi Nzambe atiaki eteni moko na moko na nzoto, eteni na eteni na mosala na yango, ndenge Ye moko alingaki.
19
Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni nzoto elingaki penza kozala nzoto?
20
Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko.
21
Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko: “Nazali na posa na yo te;” to moto, ekoki te koloba na makolo: “Nazali na posa na bino te.”
22
Nzoka nde, biteni ya nzoto oyo emonanaka lokola ezali ya bolembu, ezalaka mpe na tina.
23
Biteni ya nzoto oyo tomonaka lokola ezali na lokumu mingi te, yango nde topesaka lokumu mingi; mpe oyo tomonaka lokola ezali kitoko te, yango nde tobongisaka malamu,
24
nzoka nde, biteni oyo tomonaka kitoko ezalaka na posa te ete babongisa yango. Kasi Nzambe asalaki nzoto na lolenge ete lokumu mingi epesama na biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu,
25
mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi biteni esunganaka.
26
Soki eteni moko ezali koyoka pasi, biteni nyonso mpe ezali koyoka pasi elongo na yango; soki eteni mosusu ezwi lokumu, biteni nyonso mpe esepeli elongo na yango.
27
Nzoka nde, bino bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto ya Klisto.
28
Boye, kati na Lingomba, Nzambe atiaki: ya liboso, bantoma, ya mibale, basakoli, ya misato, balakisi, mpe na sima, baoyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, baoyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, baoyo bazali na likabo ya kosunga bato, baoyo bazali na likabo ya kokamba, mpe baoyo bazali na likabo ya koloba minoko ya ndenge na ndenge.
29
Boni, bango nyonso bazali bantoma? Bango nyonso bazali basakoli? Bango nyonso bazali balakisi? Bango nyonso basalaka bikamwa?
30
Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli? Bango nyonso balobaka minoko ya ndenge na ndenge? Bango nyonso balimbolaka minoko?
31
Bozala na posa makasi ya makabo oyo eleki na tina. Boye, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.
← Chapter 11
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 13 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16