bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 13
1 Corinthians 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 14 →
1
Soki nalobi minoko ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kotia makelele to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele.
2
Soki nazali na likabo ya kosakola, ya bososoli ya mabombami nyonso mpe ya boyebi ya makambo nyonso; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.
3
Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.
4
Bolingo ekangaka motema, bolingo esalisaka bato, bolingo elulaka te, bolingo emikumisaka te, bolingo emitondisaka na lolendo te.
5
Bolingo esalaka te likambo oyo ebongi te, bolingo elukaka bolamu na yango moko te, bolingo esilikaka te, bolingo ekanisaka mabe te.
6
Bolingo esepelaka te na makambo ya bosembo te, kasi esepelaka na bosolo.
7
Bolingo elimbisaka makambo nyonso, bolingo endimaka makambo nyonso, bolingo etiaka elikya na makambo nyonso, bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso.
8
Bolingo esilaka te. Bisakoli? Ekosila. Minoko ya ndenge na ndenge? Ekosuka. Boyebi? Ekosila.
9
Pamba te, toyebi kaka ndambu, mpe tosakolaka kaka ndambu.
10
Kasi tango oyo ya kokoka ekoya, oyo ya ndambu ekosila.
11
Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, nazalaki na mayele lokola ya mwana moke. Kasi tango nakomi mokolo, natiki makambo ya bomwana.
12
Sikʼoyo tozali komona lokola na talatala, tozali komona penza ndenge esengeli te. Kasi mokolo moko, tokomona penza ndenge esengeli. Sikʼoyo nayebi kaka ndambu, kasi mokolo moko, nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebeli ngai.
13
Nzoka nde, sikʼoyo, makambo oyo misato ewumelaka: kondima, elikya mpe bolingo. Nzoka nde, oyo eleki motuya kati na yango, ezali nde bolingo.
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16