bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 5
1 Corinthians 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 6 →
1
Bato bazali koloba bipai nyonso ete ekobo ezali kosalama kati na bino; mpe ekobo oyo, emonanaka kutu te epai ya bapakano, na ndenge ete: moto moko kati na bino azali kosangana na mwasi ya tata na ye.
2
Kasi bino, bozali ya kotonda na lofundu. Ekokaki kutu boyoka mawa mingi, mpe bolongola kati na bino moto oyo asalaki likambo ya ndenge wana.
3
Pamba te mpo na ngai, ata nazali na bino na nzoto te, kasi nazali na bino na molimo, mpe nasiʼnakataki likambo ya moto oyo asalaki bongo, lokola nde nazalaki na bino elongo.
4
Tango bokosangana na kombo ya Nkolo na biso Yesu, ngai mpe nakozala na bino na molimo, mpe nguya ya Nkolo na biso Yesu ekozala mpe na bino:
5
moto ya ndenge wana, bokaba ye na maboko ya Satana mpo ete nzoto na ye ebebisama, mpe molimo na ye ebika na Mokolo ya Nkolo.
6
Komikumisa na bino ezali malamu te. Boyebi te ete “mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya farine?”
7
Bolongola kisi ya mapa ya kala, mpo bozala “potopoto ya sika”, oyo ezangi kisi ya mapa. Pamba te Klisto, mwana meme na biso ya Pake asiʼapesama likabo.
8
Yango wana tosala feti na kisi ya mapa ya kala te, kisi ya mapa ya makambo ya mabe mpe ya nko, kasi na mapa oyo ezangi kisi, mapa ya makambo ya sembo mpe ya solo.
9
Nakomelaki bino na mokanda na ngai ete bozala lisanga moko te na bato oyo basalaka ekobo.
10
Elingi koloba te ete na bato nyonso ya mokili oyo, oyo basalaka ekobo, to bazali bato ya lokoso ya mbongo, to babotolaka biloko ya bato, to basambelaka bikeko; pamba te soki ezali bongo, wana esengeli ete bolongwa na mokili.
11
Kasi sikʼoyo nakomeli bino, mpo ete bozala lisanga moko te na moto oyo amibengaka “ndeko”, kasi asalaka ekobo, to azali moto ya lokoso ya mbongo, to mosambeli bikeko, to mofingi bato, to molangwi masanga, to moto oyo abotolaka biloko ya bato. Moto ya ndenge wana, bolia na ye kutu esika moko te.
12
Boni kosambisa bato oyo bazali ya Lingomba te, yango etali ngai? Boni bosambisaka te bato ya Lingomba?
13
Baoyo bazali ya Lingomba te, Nzambe akosambisa bango. Kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 6 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
Recommended Reading
Commentary
1 Corinthians Commentaries
→
Devotional
1 Corinthians Devotional Guide
→
Get This Bible
Lingala Bible (Mokanda na Bomoi) Study Bible
→