bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 16
1 Corinthians 16
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 15
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
1
Mpo na makambo etali makabo oyo bozali kokongola mpo na basantu: Bosala ndenge natindaki ete Mangomba ya Galatia esala.
2
Tika ete moko na moko kati na bino abombaka na ndako na ye, mbongo, kolanda ezweli na ye, na mokolo ya liboso ya poso nyonso, mpo ete tango nakoya, boluka lisusu te kokongola yango.
3
Tango nakoya, nakotinda na Yelusalemi, bato oyo bino moko bokopona elongo na mikanda, mpo ete bamema likabo na bino.
4
Soki ekomonana malamu ete ngai mpe nakende, wana tokokende na bango nzela moko.
5
Nazali kokanisa koya epai na bino, sima ya koleka na Masedwane, pamba te nasengeli koleka wana.
6
Tango mosusu, nakoki kovanda mwa tango epai na bino, mpe kolekisa tango nyonso ya malili mpo ete bokoka kosalisa ngai, ete nakoba mobembo na ngai kino epai nazali kokende.
7
Nazali na posa ya komona bino te sikʼoyo wana nazali koleka, pamba te nazali na elikya ete nakovanda na bino mwa mikolo, soki Nkolo akolinga.
8
Kasi nakotikala awa na Efeso kino na mokolo ya Pantekote,
9
pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu mpe banguna ebele.
10
Soki Timote akomi epai na bino, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo lokola ngai.
11
Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko pamba. Bosalisa ye mpo ete akoba mobembo na ye mpe akoma epai na ngai na kimia, pamba te ngai nazali kozela ye elongo na bandeko.
12
Nzoka nde, mpo na ndeko na biso Apolosi, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko. Kasi azali penza na posa te ya kosala yango sikʼoyo; akoya kaka soki akutani na libaku malamu.
13
Bosenzela, botelema ngwi na kondima, bozala bato ya mpiko mpe ya makasi.
14
Bosala makambo nyonso na bolingo.
15
Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye, bazalaki bato ya liboso ya kobongola motema na Akayi. Bamipesa mpo na kosalela basantu. Nazali kolendisa bino bandeko
16
ete botosaka bato ya ndenge wana, mpe botosaka moto nyonso oyo asalisaka bango mpe asalaka elongo na bango.
17
Nasepelaki mingi tango Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi bakomaki epai ngai, pamba te tango namonaki bango, ezalaki lokola namoni bino nyonso.
18
Balendisaki molimo na ngai mpe milimo na bino: boyeba solo kopesa lokumu na bato motindo oyo.
19
Mangomba ya Azi etindeli bino mbote. Akilasi mpe Priska elongo na lingomba oyo esanganaka na ndako na bango bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo.
20
Bandeko nyonso batindeli bino mbote! Bopesanaka bino na bino beze ya bondeko.
21
Bozwa mbote oyo ngai moko Polo nasili kokomela bino.
22
Soki moto moko alingi Nkolo te, tika ete alakelama mabe. E e Nkolo, yaka!
23
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso!
24
Bolingo na ngai ezala na bino nyonso kati na Klisto Yesu. Amen!
← Chapter 15
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16