bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 4
1 Corinthians 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 5 →
1
Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe.
2
Nzoka nde, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.
3
Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to ya esambiselo ya bato elobelaka ngai eloko moko te.
4
Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te, nzoka nde, yango te nde ezali kolongisa ngai; oyo asambisaka ngai ezali nde Nkolo.
5
Yango wana, bosambisa te liboso ya tango oyo ekatama, bozela kino tango Nkolo akoya. Ye akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso na bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye, kowuta na Nzambe.
6
Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi mpo na bolamu na bino, mpo ete na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo: “Boleka ndelo te ya makambo oyo ekomama.” Boye, bokomitombola na lolendo te mpo na kopona moko mpe koyina mosusu.
7
Boni, nani azali kokesanisa yo na bato misosu? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te? Soki bapesaki yo yango, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te?
8
Bosiʼbozwi nyonso oyo bolingaka! Bosibokomi bato ya bomengo! Bosibokomi bakonzi, na nzela na biso te. Ya solo, nalingi ete bokoma penza bakonzi, mpo ete biso mpe tokoka kokoma bakonzi elongo na bino.
9
Pamba te, nakanisi ete Nzambe abimisa biso bantoma na molongo ya suka, lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya liwa na esika ya masano. Pamba te bakomisa biso lisano mpo na mokili, mpo na baanzelu, mpe mpo na bato.
10
Biso tozali bazoba mpo na Klisto, kasi bino bozali bato ya bwanya kati na Klisto! Tozali na bolembu, kasi bino bozali na makasi! Bozali kozwa lokumu, kasi biso bazali kotiola biso!
11
Kino tango oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, bazali kobeta biso, mpe tozali na esika ya kovanda te,
12
tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka; tango banyokolaka biso, tokangaka mitema mpo na yango;
13
tango balobaka makambo ya lokuta mpo na biso, tozongisaka na boboto nyonso. Mpe kino sikʼoyo tokoma lokola biloko ya bosoto ya mokili, lokola biloko oyo babwakaka na folu.
14
Nakomi makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebiso bino, lokola bana na ngai ya bolingo.
15
Pamba te, ata soki bozali na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, nzoka nde bozali na batata ebele te, pamba te ngai nde nazali tata na bino kati na Klisto Yesu, na nzela ya Sango Malamu.
16
Bongo nabondeli bino, bolanda ndakisa na ngai.
17
Ezali na tina wana nde, natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo mpe ye oyo azali ya kokangama makasi na Nkolo. Ye akolobela biso lisusu nzela na ngai kati na Klisto Yesu, lokola nateyaka yango bisika nyonso kati na mangomba nyonso.
18
Bato mosusu kati na bino bakoma bato ya lofondu, bakanisi ete, nakoya lisusu te epai na bino.
19
Kasi soki Nkolo alingi, etikali moke naya epai na bino, mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato wana ya lofundu balobaka, kasi mpe, nguya nini bazali na yango.
20
Pamba te, Bokonzi ya likolo ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya.
21
Bolingi nini? Naya epai na bino na fimbo, to na bolingo mpe na molimno ya boboto?
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16