bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 2
1 Corinthians 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 3 →
1
Bandeko, tango nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalaki yango te lokola moto oyo ayebi penza koloba to na maloba ya bwanya.
2
Pamba te, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te kati na bino, longola kaka Yesu Klisto, Yesu Klisto oyo babakaki na ekulusu.
3
Nayaki epai na bino na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
4
Maloba mpe mateya na ngai evandisamaki na mayele mpe na bwanya ya bomoto te, kasi na kotalisama ya misala nguya ya Molimo,
5
mpo ete kondima na bino evandisama na bwanya ya bomoto te, kasi na nguya ya Nzambe.
6
Nzoka nde, toteyaka bwanya epai na baklisto oyo bakola na kondima. Yango ezali bwanya ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami na libebi.
7
Te, toteyaka mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili.
8
Mokonzi moko te ya mokili oyo asosolaki yango, pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu.
9
Kasi ndenge ekomama: “Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kanisaki te, yango nde Nzambe abongisa mpo na bato oyo balingaka Ye.”
10
Nzoka nde, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye. Pamba te, Molimo ayebaka makambo nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
11
Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na ye te? Ndenge moko mpe, moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
12
Nzoka nde biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola likabo ya ngolu ya Nzambe.
13
Boye, toteyaka yango te na maloba ya bwanya ya bomoto, kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Ezali na nzela wana nde tolobaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
14
Moto oyo azangi Molimo na Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe. Pamba te, ezali lokola liboma na miso na ye; akoki kososola yango te, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
15
Nzoka nde, moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso, kasi ye, bato basosolaka ye te. Pamba te, ekomama:
16
“Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli?” Nzoka nde, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16