bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 14
1 Corinthians 14
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 13
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 15 →
1
Boluka liboso bolingo. Bozala na posa makasi ya makabo ya Molimo, mingi penza likabo oyo ya kosakola.
2
Pamba te, moto oyo azali koloba na monoko oyo eyebani te, azali kosolola na Nzambe kasi na bato te, mpo ete moto moko te azali kososola ye; nzoka nde, azali koloba mabombami, na bokambami ya Molimo.
3
Kasi moto oyo azali kosakola, azali nde koloba na bato, mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango.
4
Moto oyo azali koloba na monoko oyo eyebani te, azali kaka kokolisa kondima na ye moko, kasi oyo azali kosakola azali kokolisa kondima ya Lingomba mobimba.
5
Nalingi ete bino nyonso bolobaka minoko oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi koleka moto oyo azali koloba minoko oyo eyebani te, loba kaka soki alimboli minoko yango mpo na kolendisa kondima ya Lingomba.
6
Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na monoko oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino, soki liloba na ngai ememeli bino emoniseli moko te, boyebi moko te ya sika, lisakoli moko te, liteya moko te?
7
Ezali mpe ndenge moko mpo na bisaleli oyo babetelaka miziki lokola flite to nzenze. Soki ezali kobimisa te mingongo oyo ekeseni, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to nzenze ezali kobimisa?
8
Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba?
9
Ezali mpe ndenge moko mpo na bino: soki na minoko na bino, bozali koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki koyeba solo makambo oyo bozali koloba? Wana, bokoloba na pamba.
10
Kati na mokili, minoko ezali ebele, mpe moko te kati na yango ezangi tina.
11
Nzoka nde, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya monoko oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, boye ye mpe akozala mopaya epai na ngai.
12
Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, boluka mingi kozala na yango ebele, mpo na kokolisa Lingomba na kondima.
13
Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na minoko oyo eyebani te, abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba.
14
Pamba te, soki nazali kobondela na monoko oyo eyebani te, molimo na ngai ezali kobondela, kasi mayele na ngai ezali kosala te.
15
Bongo, nasala nini? Nakobondela na molimo na ngai, kasi nakobondela mpe na mayele na ngai; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.
16
Soki ozali kotonda Nzambe na molimo na yo, ndenge nini baoyo bazali koyoka te, bakoki koloba: “Amen!” na libondeli na yo ya kotonda Nzambe? Pamba te, bayebi te makambo oyo ozali koloba.
17
Okozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu akokola na kondima te.
18
Natondaka Nzambe mpo ete nalobaka minoko oyo eyebani te koleka bino nyonso.
19
Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ya koloba maloba nkoto zomi (1.000) na minoko oyo eyebani te.
20
Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike. Bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; Kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.
21
Pamba te, ekomama na Mobeko: “Ekozala na minoko ya bapaya, na lokota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo, kasi ata bongo, bakoyoka ngai te,” elobi Yawe.
22
Yango wana, minoko oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bandimaka te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi. Nzoka nde, lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bandimaka te.
23
Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba minoko oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bandimaka te bakoti kuna; boni, bakoloba te ete bozali na liboma?
24
Nzoka nde, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo andimaka te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna; boni, akomimona lokola moto ya masumu te? Akomitungisa solo motema te?
25
Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Boye, akofukama, akokumisa Nzambe mpe akoloba: “Solo, Nzambe azali kati na bino.”
26
Bandeko, toloba lisusu nini? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na monoko oyo eyebani te mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kolendisa Lingomba na kondima.
27
Soki bato bazali koloba na minoko oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango.
28
Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, tika ete ye oyo azali koloba monoko oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai na Nzambe.
29
Mpo na oyo etali bato oyo basakolaka: tika ete bato mibale to misato basakola, mpe bamisusu bayekola malamu makambo oyo basakoli wana bazali koloba.
30
Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli tango mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba esengeli kokanga monoko.
31
Pamba te, bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama.
32
Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli oyo ezali kokamba ye.
33
Pamba te, Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya molongo. Ndenge esalemaka na Mangomba nyonso ya basantu,
34
basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.
35
Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango ndako, pamba te ezali soni mpo mwasi koloba kati na mayangani.
36
Boni, bokanisi ete Maloba ya Nzambe ewutaki nde epai na bino? To ekomaki kaka epai na bino moko?
37
Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo.
38
Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te.
39
Yango wana bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba minoko oyo eyebani te.
40
Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.
← Chapter 13
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 15 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16