bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Corinthians 3
1 Corinthians 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 4 →
1
Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola bana mike kati na Klisto.
2
Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te, bolingaki kokoka kolia yango te. Ezala sikʼoyo, bokokoka na bino mpe kaka kolia yango te;
3
pamba te, bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali kotambolisama kolanda baposa ya nzoto te? Boni, bozali kaka kosala lokola ya moto nyonso te?
4
Tango moko azali koloba: “Ngai nazali moto ya Polo”, mpe mosusu azali koloba: “Ngai nazali moto ya Apolosi,” boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonsote?
5
Boni, Apolosi azali nani? Mpe Polo azali nani? Bazali kaka basali, oyo na nzela na bango bondimelaki Nzambe, kolanda likabo oyo Nkolo apesaki na moko na moko na bango.
6
Ngai nalonaki, mpe Apolosi asopelaki yango mayi, kasi Nzambe nde akolisaki.
7
Ezali te moto oyo alonaki to oyo asopaki mayi nde azali na tina, kasi Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.
8
Moto oyo aloni mpe oyo asopeli mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moto na moto akozwa lifuti oyo ekoki na mosala na ye.
9
Pamba te, biso tozali basali elongo na Nzambe, mpe bino bozali elanga mpe ndako ya Nzambe.
10
Na nzela ya ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki fondasio lokola motongi ya mayele, mpe moto mosusu atongi likolo na yango. Kasi tika ete moto na moto asala keba na ndenge azali kotongela.
11
Pamba te, moto moko te akoki kotonga fondasio mosusu, longola kaka oyo esila kotongama: Yesu Klisto.
12
Nzoka nde, soki moto asaleli wolo, to palata, to mabanga ya talo, to mabaya, to makasa to mpe matiti mpo na kotonga likolo ya fondasio yango,
13
mosala na ye ekomonisama polele. Mokolo ya kosambisama nde ekomonisa yango, pamba te ekozala mokolo ya moto. Moto ekomeka mosala ya moto na moto.
14
Soki mosala ya moto oyo atongaki likolo ya fondasio eziki te, moto yango akozwa lifuti.
15
Kasi soki esili kozika, akozwa eloko te: ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto.
16
Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino?
17
Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye, pamba te Tempelo na Ye ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.
18
Bomikosa te: soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya na mokili oyo, asengeli kokoma lokola zoba mpo ete akoma moto ya bwanya.
19
Pamba te, bwanya ya mokili oyo ezali bozola na miso ya Nzambe. Lokola ekomama: “Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele na bango ya mabe,”
20
mpe lisusu: “Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezalaka tina te.”
21
Yango wana, tika ete moto moko te aluka lokumu kati na bato. Pamba te, nyonso ezali ya bino:
22
ezala Polo, to Apolosi, to Piere, to mokili, to bomoi, to kufa, to tango ya lelo, to tango oyo ekoya: nyonso ezali ya bino,
23
kasi bino bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16