bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 1
Mark 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 2 →
1
Ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe.
2
Na mokanda ya moprofeta Ezayi ekomama boye: Tala, nakotinda ntoma na ngai liboso na yo, oyo akobongisela yo nzela.
3
Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe: Bobongisa nzela ya Nkolo, Bosembola banzela na ye!
4
Jean ayaki, azalaki kobatisa na esobe mpe azalaki koloba: “Bozwa libatisi, mpo na kolakisa ete bobongoli mitema; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino!”
5
Bato nyonso ya mokili ya Yudea mpe ya Yeruzalem bazalaki kokendeepai na ye. Bazalaki koyambola masumu na bango, mpe azalaki kobatisabango na mayi ya Yordani.
6
Jean azalaki kolata elamba oyo esalami na bapwale ya shamo, mpe mokaba ya poso ya nyama na loketo; azalaki kolia makonko na mafuta ya nzoi.
7
Azalaki koteya na bato boye: —Moto moko akoya sima na ngai, ye aleki ngai na nguya; nakoki kutu te kogumbama liboso na ye mpo na kofungola basinga ya sandale na ye.
8
Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi ye akobatisa bino na Molimo Mosantu!
9
Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti na Galileya, mpe azwaki libatisi epai ya Jean na mayi ya Yordani.
10
Tango azalaki kobima na mayi, amonaki likolo efungwamaki mpe Molimo akitelaki ye lokola pijon.
11
Mongongo moko ewutaki na Likolo: —Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo, osepelisaka ngai mingi!
12
Kaka na tango wana, Molimo atindaki Yesu na esobe.
13
Avandaki kuna mikolo ntuku minei elongo na banyama ya zamba. Kuna Satana amekaki ye mpe baanzelu bayaki kosalela ye.
14
Tango bakangaki Jean, Yesu akendaki na Galileya. Ateyaki Sango Malamu ya Nzambe.
15
Azalaki koloba: —Tango esiʼekoki; Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene! Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu.
16
Mokolo moko, Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galileya, amonaki Simon na ndeko na ye Andele. Bazalaki kobwaka monyama na ebalepamba te bazalaki baluki mbisi.
17
Yesu alobaki na bango: —Boya, bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato!
18
Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango mpe balandaki ye.
19
Tango apusanaki mwa liboso, amonaki Zaki mwana ya Zebedeo na ndeko na ye Jean, bazalaki na kati ya bwato mpe bazalaki kobongisa minyamana bango.
20
Kaka na tango wana, abengaki bango; batikaki tata na bango Zebedeo na kati ya bwato, elongo na basali na ye, mpe balandaki Yesu.
21
Bakendaki na Kapenawumi. Mokolo ya saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya.
22
Bato bakamwaki mingi penza mpo na mateya na ye; pamba te azalaki koteya te lokola balakisi ya Mibeko, kasi azalaki koteyabango na nguya nyonso.
23
Kaka na tango wana, moto moko azalaki na nse ya bokonzi yamolimo mabe, azalaki mpe na ndako na bango ya mayangani. Abandakikoganga:
24
—Yesu ya Nazareti, olingi kosala biso nini? Oyei mpo na koboma biso? Nayebi yo ozali nani: ozali Mosantu ya Nzambe!
25
Bongo Yesu agangelaki molimo yango: —Vanda nyee mpe bima na moto oyo!
26
Molimo mabe eningisaki moto yango makasi penza mpe ebimaki na koganga.
27
Bato nyonso bakamwaki mingi penza mpe bazalaki kotunana moko na moko: —Likambo nini oyo? Oyo ezali mateya ya sika! Azali kogangela milimo mabe na bokonzi nyonso, mpe yango ezali kotosa ye!
28
Bongo basango na ye epanzanaki noki na mokili mobimba ya Galileya.
29
Kaka na tango wana, tango abimaki na ndako ya mayangani akendaki na ndako ya Simon mpe Andele, elongo na Zaki mpe Jean.
30
Bokilo ya Simon alalaki na mbeto mpe azalaki na fievre. Bongobayebisaki yango na Yesu kaka na tango wana.
31
Apusanaki, akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye. Fievele esilaki, mpe abandaki kosalela bango.
32
Tango pokwa ekomaki, moi esilaki kokita, bamemelaki Yesu bato nyonso ya maladi na baoyo bazalaki na milimo mabe.
33
Bato nyonso ya vile wana, bayaki kosangana liboso ya porte ya ndako.
34
Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na bapasi ya ndenge na ndenge. Abenganaki mpe milimo ebele ya mabe mpe apesaki milimo mabe nzela te mpo na koloba; pamba te, yango eyebaki ye soki azalaki nani.
35
Na tongo penza, tango molili ezalaki naino, Yesu alamukaki, abimaki na ndako, akendaki na esika ya ye moko kaka, mpe abondelaki wana.
36
Simon na baninga na ye bakendaki koluka ye.
37
Tango bamonaki ye, balobaki na ye: —Bato nyonso bazali koluka yo.
38
Kasi ye azongiselaki bango: —Tokende epai mosusu, na bamboka oyo ezali pembeni-pembeni, mpo nateya mpe kuna. Pamba te, nayaki mpo na yango.
39
Atambolaki na Galileya mobimba, azalaki koteya na bandako na bangoya mayangani mpe azalaki kobengana milimo mabe.
40
Moto moko ya maladi ya maba, ayaki epai na ye, afukamaki libosona ye, mpe abondelaki ye: —Soki olingi, okoki kokomisa ngai peto.
41
Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki: —Nalingi yango, koma peto!
42
Kaka na tango wana, maba yango esilaki mpe akomaki peto.
43
Yesu azongisaki ye sima ya kopesa ye likebisi oyo:
44
—Yoka malamu, koyebisa likambo oyo na moto te! Kasi kende komilakisa na nganga-Nzambe, mpe pesa likabo oyo Moyize atindaki mpo na kopetolama na yo. Mpo yango ezala litatoli epai na bango ete yo obiki.
45
Kasi ye, tango abimaki kaka, abandaki koloba na bonsomi nyonso mpe kopanza sango yango. Yango wana, Yesu akokaki te kokota na vile na ndenge ya polele; kasi azalaki kovanda na libanda ya vile, na bisika ya ye moko kaka. Bongo bato bazalaki kowuta bipai na bipai bazalakikoya epai na ye.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16