bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 11
Mark 11
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 10
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 12 →
1
Awa bazalaki kopusana pene-pene ya Yeruzalem, epai ya Betfaze mpe Betani, pene-pene na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na ye mibale, mpe
2
alobaki na bango: —Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino; tango kaka bakokota na mboka yango, bakomona mwana ya mpunda ekangama, mpe moto ata moko te naino amatela yango. Bofungola yango, mpe boya na yango.
3
Soki moto atuni bino: “Mpo na nini bozali kosala bongo?”, boloba na ye: “Nkolo azali na posa na yango, mpe akozongisa yango awa noki.”
4
Bakendaki mpe bakutaki mwana ya mpunda ezalaki ya kokangama na porte, libanda, na nzela mpe bafungolaki yango?
5
Ndambo ya bato oyo bazalaki wana, batunaki: —Bozali kosala nini, awa bazali kofungola mwana mpunda?
6
Bazongisaki eyano kaka ndenge Yesu atindaki bango, mpe batikaki bango bakende.
7
Tango bamemelaki Yesu mwana mpunda mpe batiaki bilamba na bango likolo na yango, avandaki likolo na yango.
8
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela; basusu batandaki bitape ya nzete oyo bakataki na bilanga.
9
Ba oyo bazalaki kokende liboso, na ba oyo bazalaki kolanda, bazalaki koganga: Ozana Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo!
10
Mapamboli na Bakonzi ya Tata na biso ya Tata na biso Davidi, oyo ezali koya! Ozana na bisika oyo eleki likolo!
11
Bongo Yesu akotaki na Yeruzalem mpe akendaki na ndako ya Nzambe. Atalaki biloko nyonso epai na epai, kasi lokola tango elekaki, abimaki, mpe akendaki na Betani elongo na Bapostolo na ye zomi na mibale.
12
Mokolo oyo elandaki, awa bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala.
13
Na mosika, amonaki nzete moko ya figi ezalaki na makasa, bongo akendaki kotala soki ezalaki na mbuma. Kasi tango akomaki, amonaki eloko moko te, kaka makasa, mpo ezalaki eleko ya mbuma ya figi te.
14
Bongo Yesu alobaki na nzete yango: —Tika ete moto ata moko te alia lisusu mbuma oyo ekowuta epai na yo! Bayekoli na ye bayokaki ye koloba maloba yango.
15
Bongo bakomaki na Yeruzalem. Yesu akotaki na lopango ya ndako ya Nzambe mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe ba oyo bazalaki kosomba na kati ya lopango ya Ndako na Nzambe. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, bongo na bakiti ya ba oyo bazalaki koteka, bapijon;
16
mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kokatisa lopango ya Ndako ya Nzambe ete bamema biloko.
17
Bongo abandaki koteya bango mpe alobaki: —Ekomama te ete: Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikolo nyonso? Kasi bino, bikomisi yango nganda ya miyibi.
18
Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na balakisi ya Mibeko bayokaki yango mpe babandaki koluka nzela ya kobomisa Yesu pamba te bazalaki kobanga ye, mpo ebele ya bato nyonso bazalaki kokamwa mateya na ye.
19
Tango pokwa ekomaki, Yesu na bayekoli na ye babimaki na vile.
20
Na tango, awa bazalaki koleka, bamonaki nzete ya figi ekawukaki wuta na misisa.
21
Piere akanisaki likambo oyo esalamaki mpe alobaki na Yesu: —Moteyi, tala! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe, ekawuki.
22
Bongo Yesu azongisaki: —Bozala na kondima na Nzambe.
23
Nalobi na bino ya solo, soki moto alobi na ngomba oyo: “Longwa wana mpe mibwaka na kati ya ebale”, mpe atie tembe na motema na ye te, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalama, yango ekosalama mpo na ye.
24
Yango wana nalobi: eloko nyonso oyo bokosenga na libondeli, bondima ete bosili kozwa yango, mpe yango ekosalama mpo na bino.
25
Mpe tango botelemi mpo na kobondela, soki bozali na likambo na moto mosusu, bolimbisa ye, mpo ete Tata na bino oyo azali na Likolo, alimbisa masumu na bino.
26
[Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali na Likolo, akolimbisa mpe masumu na bino te.]
27
Bongo bakomaki lisusu na Yeruzalem. Tango Yesu azalaki kotambola na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe, bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko, na bankolo, bayaki epai na ye mpe
28
batunaki ye: —Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Mpe nani apesi yo bokonzi ya kosala yango?
29
Yesu azongisaki: —Nakotuna bino motuna moko. Bozongisela ngai eyano, bongo nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.
30
Jean azwaki ndingisa ya kobatisa epai ya nani? Na Nzambe to na bato? Boyebisa ngai!
31
Babandaki kotiana tembe bango na bango mpe balobaki: —Soki tolobi: “Na Nzambe”, ye akotuna biso: “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?”
32
Soki mpe tolobi “Na bato”… Bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kondima ete Jean azalaki penza moprofeta.
33
Bongo bazongiselaki Yesi: —Toyebi te! Yesu mpe alobaki na bango: —Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.
← Chapter 10
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 12 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16