bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 8
Mark 8
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 7
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 9 →
1
Na mikolo wana, bato mingi penza basanganaki lisusu. Lokola bazalaki na eloko moko te po na kolia, Yesu abengaki bayekoli na yempe alobaki na bango:
2
—Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basiʼbasali mikolomisato elongo na ngai, mpe bazali na eloko moko te mpo na kolia.
3
Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokweya na nzela; pamba te basusu kati na bango bawuti mosika.
4
Bayekoli na ye bazongiselaki ye: —Esika nini tokozwa, awa na esika oyo ezangi bato, mampa ya kokoka mpo na koleyisa bango?
5
Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bazongisaki: —Sambo.
6
Bongo alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. Akamataki mampa yango sambo, azongisaki matondi, akataki yango, bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato; mpe basalaki bongo.
7
Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike; apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli bakabola yango.
8
Bato baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki bitunga sambo ya biteni oyo etikalaki.
9
Bato bazalaki pene-pene ya nkoto minei. Bongo Yesu azongisaki bango.
10
Kaka na tango wana, amataki na bwato elongo na bayekoli na ye, mpe akendaki na mokili ya Dalmanuta.
11
Bongo Bafarizeo bayaki mpe babandaki kotuna Yesu mituna. Basengaki ye likamwisi moko oyo ekowuta na Likolo, mpo na komeka ye.
12
Yesu ayokaki mawa mingi mpe alobaki: —Mpo na nini bato ya tango oyo bazali kosenga elembo? Nalobi na bino ya solo: bakopesa bango ata elembo moko te!
13
Atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendaki na ngambomosusu ya ebale.
14
Bayekoli babosanaki komema mampa; bazalaki kaka na limpa moko na kati ya bwato.
15
Yesu akebisaki bango: —Bofungola miso mpe bokeba na nkisi oyo evembisaka mampa ya Bafarizeo na oyo ya Erode.
16
Bayekoli babandaki kotiana tembe bango na bango: —Ezali mpo tozali na mampa te.
17
Tango Yesu ayebaki yango, atunaki bango: —Mpo na nini bozali kotia tembe mpo bozangi mampa? Boyebi naino te? Bososoli naino te? Mitema na bino ezali kaka mabanga?
18
Bozali na miso, kasi bozali komona te? Bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te? Boni, bozali kokanisa te?
19
Tango nakataki mampa mitano mpo na kokabola na bato nkoto mitano, bitunga boni bolokotaki ezalaki ya kotonda na biteni? Bazongisaki: —Zomi na mibale.
20
—Bongo tango nakataki mampa sambo mpo na kokabola na bato nkoto minei, bitunga boni bolokotaki oyo ezalaki ya kotonda na biteni ya mampa? Bazongisaki: —Sambo.
21
Bongo alobaki na bango: —Bozali kaka kososola te?
22
Bakomaki na Betsaida. Bamemelaki Yesu moto moko akufa misompe babondelaki ye mpo asimba ye.
23
Yesu akamataki moto akufa miso na loboko, mpe amemaki ye nalibanda ya mboka; bongo abwakelaki ye soyi na miso, atielaki yemaboko, mpe atunaki ye: —Boni, ozali komona eloko?
24
Moto yango atalaki mpe alobaki: —Nazali komona bato lokola banzete ezali kotambola.
25
Bongo Yesu atiaki maboko na ye na miso ya moto yango. Moto yango atalaki malamu, abikaki mpe abandaki komona biloko nyonso polele penza.
26
Yesu azongisaki ye na ndako na ye, mpe alobaki na ye: —Kokota na mboka te.
27
Yesu na bayekoli na ye bakendaki na bamboka ya Sezarea na Filipo. Na nzela, atunaki bango: —Bato balobaka ete ngai nazali nani?
28
Bazongisaki: —Basusu balobaka: Jean Batiste; basusu balobaka: Eliya, mpe basusu balobaka: ozali moko ya baprofeta.
29
Yesu atunaki bango: —Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani? Piere azongiselaki ye: —Ozali Kristo!
30
Bongo akebisaki bango baloba na moto moko te mpo na ye.
31
Bongo Yesu abandaki koteya bango ete: —Mwana na moto esengeli amona pasi mingi, mpe baboya ye na bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, na balakisi ya Mibeko, mpe esengeli baboma ye. Kasi sima ya mikolo misato akosekwa!
32
Azalaki koloba makambo yango polele penza. Bongo Piere abendaki ye na pembeni, mpe abandaki kopamela ye.
33
Kasi Yesu abalukaki mpe atalaki bayekoli na ye, apamelaki Piere: —Longwa liboso na ngai, Satana! Pamba te makanisi na yo ezali ya Nzambe te, kasi ezali ya bato.
34
Bongo abengaki ebele ya bato elongo na bayekoli na ye, mpe alobaki na bango: —Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai.
35
Pamba te, moto oyo akolinga kobikisa bomoi na ye, akobungisayango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu, akobikisa yango.
36
Litomba nini moto akozwa soki azwi mokili mobimba, bongo abungisi elimo na ye?
37
Eloko nini moto akoki kopesa na esika ya elimo na ye?
38
Pamba te, moto nyonso oyo akoyoka soni mpo na ngai mpe mpo na Liloba na ngai, na kati ya bato ya tango oyo batosaka Nzambe te mpe batondi masumu, Mwana na moto akoyokela ye mpe soni, tango akoya na kati ya kembo ya Tata na ye, elongo na baanzelu basantu!
← Chapter 7
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 9 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16