bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 13
Mark 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 14 →
1
Awa azalaki kobima na Ndako ya Nzambe, moyekoli na ye moko alobaki na ye: —Moteyi, tala, mabanga kitoko boye! Ndako kitoko boye!
2
Yesu azongiselaki ye: —Omoni Ndako monene-monene oyo? Libanga moko te ekotikala likolo ya libanga mosusu; nyonso ekobwakama na nse.
3
Awa Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, esika oyo etalani na Ndako ya Nzambe, Piere, Zaki Jean mpe Andele batunaki ye motuna na esika ya bango moko:
4
Yebisa biso, makambo wana ekosalama tango oyo makambo nyonso wana esengeli kosalamaekoki?
5
Bongo Yesu alobaki na bango: —Bokeba mpo ete moto ata moko te akosa bino.
6
Bato mingi bakoya na kombo na ngai, mpe bakoloba: “Ezali nga”, mpe bakokosa bato ebele.
7
Tango bokoyoka makelele ya bitumba mpe sango ya bitumba, bomitungisa te, pamba te esengeli ete makambo wana esalama; kasi wana ekozala naino suka te.
8
Ekolo moko ekobundisa ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana na bisika mingi ya mokili, mpe nzala ekongala. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota.
9
Kasi bino, bomikebisa! Pamba te, bakokaba bino na batibinale ya Bayuda mpe bakobeta bino na bandako ya mayangani, bakofunda bino liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi minene mpo na ngai, mpo ezala litatoli epai na bango.
10
Kasi esengeli ete Sango Malamu eteyama na bikolo nyonso.
11
Tango bakomema bino mpo na koteka bino, bomitungisa liboso te mpo na makambo oyo bokoloba. Kasi boloba maloba nyonso oyo bakopesa bino na tango wana. Pamba te, ezali bino te bato bokoloba, kasi Molimo-Mosantu.
12
Ndeko akokaba ndeko na ye mpo baboma ye, mpe tata akokaba mwana na ye, mpe bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
13
Bato nyonso bakoyina bino mpo na kombo na ngai. Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka, akobika!
14
Tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, etelemi na esika yango ekoki kozala te—moto oyo azali kotanga asosola malamu likambo oyo!—bongo ba oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba.
15
Moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpe akota te na ndako mpo na kobimisa ata eloko nini.
16
Moto oyo akozala na bilanga, azonga sima te mpo na kozwa elamba na ye.
17
Mawa mingi penza na basi oyo bakozala na zemi, mpe ba oyo bakozala komelisa bana mabele na mikolo wana.
18
Bobondela mpo ete makambo wana esalama te na tango ya malili makasi.
19
Pamba te, yango ekozala mikolo ya pasi mingi, na ndenge ete mikolo ya ndenge wana ekoma naino te banda na ebandeli, tango Nzambe asalaki mokili, kino sikʼoyo. Mpe bapasi ya ndenge wana ekozala lisusu te.
20
Mpe soki Nkolo atiaki mikolo yango mokuse te, mbele moto ata moko te akokaki kobika. Kasi mpo na baponami, ba oyo ye apona, yango wana atiaki yango mokuse.
21
Na tango wana soki moto alobi na bino: “Tala Kristo azali awa”, to “Tala, azali kuna!” bondimela ye te.
22
Pamba te, Ba-Kristo ya lokuta mpe baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala makamwisi mpe bilembo mpo na kokosa, soki yango ekokaki kosalama, ata baponami.
23
Kasi bino, bokengela! Nasi nayebisi bino makambo nyonso liboso.
24
Kasi na mikolo wana, sima ya bapasi wana, Moyi ekoyinda Sanza ekongenga lisusu te;
25
Minzoto ya likolo ekokweya, mpe banguya oyo ezali na likolo ekoningana.
26
Bongo bakomona Mwana ya moto akoya na kati ya mapata, na nguya monene mpe na nkembo.
27
Akotinda baanzelu na ye, mpe akosangisa baponami na ye nabipai nyonso minei ya mokili, banda na suka ya mokili tii na suka ya likolo.
28
Boyekola liteya oyo nzete ya figi epesaka bino: soki bitape na yango ekomi pete-pete mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya mbula ekomi pene-pene.
29
Ndenge moko mpe mpo na bino, tango bokomona makambo wana ekosalama, boyeba ete ye akomi pene-pene, na porte.
30
Nalobi na bino ya solo, bato ya tango oyo koleka te, kino tango makambo wana nyonso ekosalama.
31
Likolo mpe mokili ekoleka, kasi Maloba na ngai ekoleka te!
32
Mpo na likambo etali mokolo wana to ngonga, moto moko te ayebi yango, ata baanzelu na likolo, ata Mwana, kasi kaka Tata nde ayebi yango.
33
Bokeba! Bokengela! Pamba te boyebi te tango nini yango ekoya.
34
Ekozala lokola moto akeyi mobembo, atiki ndako na ye, mpe apesi mokumba na basali na ye. Apesi mosali moko na moko mosala na ye, mpe atindi mokengeli ya porte akengela malamu.
35
Yango wana bokengela, pamba te boyebi te tango nini nkolo ya ndako akozonga, na pokwa, to na midi ya butu, to tango soso elelaka, to na tongo.
36
Pamba te soki aye na mbalakaka, esengeli te akuta bino bokufa na pongi.
37
Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso: “Bokengela!”
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16