bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 6
Mark 6
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 7 →
1
Yesu alongwaki wana mpe akendaki na vile na ye, bongo bayekoli na yebalandaki ye.
2
Tango saba ekomaki, abandaki koteya na ndako ya mayangani, mpe bato mingi oyo bayokaki ye, bakamwaki mingi penza. Bazalaki kotuna: —Moto oyo azwi makambo oyo wapi? Bwania ya ndenge nini bapesi yena ndenge ete asala makamwisi!
3
Ye azali salapantie te? Azali Mwana ya Mariya te mpe ndeko ya Zaki, Zoze, Zude mpe Simon te? Mpe bandeko na ye ya basi bazalaka na biso awa te? Mpe ye azalaki libaku mpo na kondima na bango.
4
Bongo Yesu alobaki na bango: —Moprofeta azalaka na lokumu te na ekolo na ye, na kati ya libota na ye, mpe na ndako na ye!
5
Akokaki te kosala wana ata likamwisi moko, longola kaka mwa ndamboya bato ya maladi oyo atielaki maboko mpe abikisaki bango.
6
Mpe akamwaki mingi penza mpo na kozanga kondima na bango. Bongo Yesu atambolaki na bamboka ye pembeni-pembeni mpo na koteya kuna.
7
Abengaki bapostolo na ye zomi na mibale mpe atindaki bango mibale-mibale; apesaki bango mpe bokonzi likolo ya milimo mabe;
8
mpe atindaki bango ete: bamema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka nzete; sakosi te, limpa te mpe mbongo te na baposi na bango.
9
Bolata basandale na makolo na bino, kasi elamba ya likolo te.
10
Alobaki na bango lisusu: —Na ndako oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa wana.
11
Kasi soki na esika moko baboyi koyamba bino mpe baboyi koyoka bino, tango bozali kolongwa wana, bopupola makolo na bino: yango ekozala litatoli mpo na bango.
12
Bakendaki mpe bateyaki bato ete babongola mitema.
13
Babenganaki milimo ebele ya mabe, bapakolaki mafuta na bato mingi ya maladi mpe babikisaki bango.
14
Mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu, pamba te kombo na ye epanzanaki mingi penza. Bato bazalaki koloba: —Jean Batiste asekwi kati na bakufi! Yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi.
15
Kasi basusu bazalaki koloba: —Ezali Eliya! Bato mosusu mpe bazalaki koloba: —Azali moprofeta lokola moko ya baprofeta.
16
Kasi tango Erode ayokaki yango, alobaki: —Ezali Jean, oyo nakatisaki motu, nde asekwi kati na bakufi!
17
Pamba te, Erode ye moko moto apesaki mitindo mpo bakanga Jean mpe batia ye na boloko. Asalaki bongo mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye Filipi, oyo ye abalaki.
18
Pamba te, Jean azalaki koloba na Erode: —Ozali na ndingisa te mpo obala mwasi ya ndeko na yo!
19
Yango wana Erodiade abombaki kanda na motema mpo na Jean, mpe azalaki kolinga kobomisa ye. Kasi azalaki kokoka te,
20
pamba te Erode azalaki kobanga Jean. Ayebaki ete Jean azalaki moto nasembo mpe mosantu; yango wana azalaki kobatela ye. Tango nyonso, oyo azalaki koyoka Jean, azalaki komitungisa mingi penza; nzokande azalaki kaka kolinga koyoka ye.
21
Bongo tango ya malamu ekomaki. Ezalaki mokolo oyo Erode azalaki kosepela mokolo ya mbotama na ye. Tango asalaki feti moko ya kafu-kafu mpo na bato na ye ya minene, na bankozi minene ya basoda, mpe na bato ya lokumu ya Galileya.
22
Tango mwana ya mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode na bato oy Erode abengaki na feti. Bongo mokonzi alobaki na elenge mwasi: —Senga ngai eloko nyonso olingi, mpe nakopesa yo yango!
23
Bongo alapaki ndayi epai na ye: Eloko nyonso okosenga ngai, nakopesa yo yango, ata ndambo ya bokonzi na ngai!
24
Bongo elenge mwasi abimaki mpe alobaki na mama na ye: —Nasenga nini? Mama azongisaki: —Motu ya Jean Batiste!
25
Kaka na tango wana, elenge mwasi azongaki mbangu epai ya mokonzi mpe asengaki ye: —Nalingi opesa ngai, sikʼoyo, motu ya Jean Batiste na sani!
26
Mokonzi ayokaki mawa mingi penza; kasi alingaki te koboya kopesa ye yango, mpo na bandayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo ye abengisaki na feti.
27
Bongo mokonzi atindaki noki penza moko ya basoda oyo bazalaki kokengela ye, na etinda ete aya na motu ya Jean. Moto yango akendaki na boloko, akataki motu ya Jean,
28
mpe amemaki motu na ye na sani. Apesaki yango na elenge mwasi, bongo ye apesaki yango na mama na ye.
29
Tango bayekoli ya Jean bayokaki sango yango, bayaki, bakamatakinzoto na ye, mpe bakundaki yango na lilita.
30
Bapostolo basanganaki pembeni-pembeni ya Yesu, mpe babandaki koyebisa ye makambo nyonso oyo basalaki mpe nyonso oyo bateyaki.
31
Bongo alobaki na bango: —Boya elongo na ngai, bino moko kaka, na esika ezangi bato, mpe bopema mwa moke. Pamba te, bato mingi penza bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata mwa tango te mpo na kolia.
32
Bongo bakendaki bango moko kaka, na bwato, na esika ezangi bato.
33
Kasi tango bato mingi bamonaki bango ete bazalaki kokende, bayebaki bango mpe bakimaki mbangu na makolo wuta na bavile nyonso, mpe bakomaki kuna liboso na bango.
34
Tango Yesu akitaki na bwatu mpe amonaki bato ebele penza, motemana ye etondaki na mawa mingi mpo na bango, pamba te bazalaki lokolabameme oyo ezangi mobateli. Bongo abandaki koteya bango makambo ebele.
35
Lokola tango epusanaki mingi penza, bayekoli na ye bayaki epai na ye, mpe balobaki: —Tango esiʼepusani, mpe esika oyo tozali, ezali na bato te.
36
Zongisa bato mpo bakende na bamboka mpe na bilanga ya pembeni-pembeni, basomba biloko ya kolia.
37
Kasi Yesu azongiseli bango: —Bino moko bopesa bango biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na ye: —Olingi tokende kosomba mampa ya badeni nkama mibale mpo topesa bango balia?
38
Bongo Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bokende mpe botala. Tango bayebaki yango, balobaki: —Ezali mitano, na bambisi mibale.
39
Yesu atindaki bango bavandisa bato nyonso na maboke, likolo ya matiti ya mobesu.
40
Bongo bavandaki na maboke ya bato nkama moko, mpe ya bato ntuku mitano.
41
Yesu akamataki mampa wana mitano na bambisi wana mibale, atalaki likolo, azongisaki matondi, mpe akataki mampa yango. Bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato. Akabolaki mpe bambisi wana mibale, na bango nyonso.
42
Bato nyonso baliaki mpe batondaki.
43
Bongo balokotaki bitunga zomi na mibale oyo ezalaki yakotonda na biteni ya mampa na bambisi oyo etikalaki.
44
Baoyo baliaki mampa bazalaki mibali nkoto mitano.
45
Kaka na tango wana, Yesu atindaki bayekoli na ye bamata na bwato, mpo bakende liboso na ye, na ngambo mosusu ya ebale, epai ya Betsaida, na tango ye azalaki kozongisa bato.
46
Sima ya kozongisa bango, akendaki na ngomba mpo na kobondela.
47
Tango pokwa ekomaki, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale, bongo Yesu atikalaki ye moko na mokili.
48
Amonaki ete bayekoli na ye bazalaki na nkokoso mingi mpo na koluka kai, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Na pene-pene ya ngonga minei ya tongo, Yesu abandaki koya epai na bango, azalaki kotambola likolo ya ebale. Alingaki koleka pembeni na bango,
49
kasi tango bamonaki ye azalaki kotambola likolo ya ebale, bakanisaki ete ezali elima. Babandaki koganga,
50
pamba te, bango nyonso bamonaki ye, mpe batondaki na somo. Kaka na tango wana, Yesu alobaki na bango: —Boyika mpiko, bobanga te, ezali ngai!
51
Bongo amataki na bwato elongo na bango, mpe mopepe esilaki. Bakamwaki mingi penza
52
pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mampa. Mpo mayelena bango ezalaki ya kozipama.
53
Tango basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti, mpe bakangaki bwato na bango na libongo.
54
Tango bazalaki kokita na bwato, bato bayebaki Yesu noki penza.
55
Bango bakimaki mbango na bipai nyonso ya mokili wana, mpe bamemaki bato ya maladi na bitoko, na bisika nyonso oyo bazalaki koyoka ete Yesu azalaki kuna.
56
Bipai nyonso oyo Yesu azalaki kokende: na bamboka, na vile, to na bilanga, bato bazalaki kotia bato ya maladi na bazando, mpe bazalaki kobondela ye ete apesa bango ndingisa ya kosimba ata songeya elamba na ye. Bongo baoyo nyonso bazalaki kosimba yango, bazalaki kobika.
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 7 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16