bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 3
Mark 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 4 →
1
Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani. Moto moko azalaki kuna, azalaki na loboko ya kokufa.
2
Bazalaki kotala ye soki akobikisa ye na mokolo ya saba, mpo bazwa likambo ya kofundela ye.
3
Bongo Yesu alobaki na moto oyo azalaki na loboko ekufa: —Telema awa liboso ya bato nyonso.
4
Mpe atunaki bango: —Ndingisa ezali mpo na kosala likambo ya malamu mokolo ya Sabato kosala mabe? Kobikisa bomoi to koboma yango?
5
Kasi bavandaki nyee. Yesu atalaki bango na kanda, mpe ayokaki mawa mingi mpo motema na bango ezalaki libanga. Bongo alobaki na moto wana: —Sembola loboko na yo! Asembolaki yango, mpe loboko na ye ekomaki malamu.
6
Kaka na tango wana, bafarizeo babimaki mpe babandaki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
7
Yesu alongwaki wana elongo na bayekoli na ye mpe akendaki na ebale monene; bongo bato ebele penza balandaki ye: bawutaki na Galileya,
8
na Yudea, na Yeruzalem, na Idumeya, mpe na ngambo ya Yordani. Mpe baoyo ya bapembeni ya Tire na Sidoni bayaki ebele penza tango bayokaki sango ya makambo nyonso oyo azalaki kosala.
9
Atindaki bayekoli ete babongisela ye bwato ya moke, mpo ebeleya bato bafina-fina ye te.
10
Pamba te, lokola azalaki kobikisa bato ebele, yango wana bato oyo bazalaki na bapasi, bazalaki kowelela koya epai na ye, mpo na kosimba ye.
11
Tango milimo mabe ezalaki komona ye, ezalaki kokweya liboso na ye mpe koganga: —Yo ozali Mwana ya Nzambe!
12
Kasi Yesu azalaki kopekisa milimo yango mpo eloba te soki ye azalaki nani.
13
Bongo Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo ye moko alingaki; mpe bakendaki epai ye azalaki.
14
Aponaki bango zomi na mibale mpe apesaki bango kombo: bapostolo, mpo bazala na ye elongo,
15
mpo atinda bango bakende koteya mpe bazala na bokonzi ya kobengana milimo mabe.
16
Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo ye aponaki: Simon oyo Yesu apesaki ye kombo Piere;
17
Zaki mwana ya Zebede na ndeko na ye Jean, baoyo Yesu apesaki bango kombo “Boanerges”, elingi koloba “Bana ya kake”;
18
Andele; Filipo; Bartelemi; Matie; Toma; Zaki mwana ya Alfeo; Tade; Simon oyo azalaki moto ya lisanga: “Zelote”;
19
na mpe Yuda Isakariote, oyo atekaki Yesu.
20
Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana, na ndenge ete ye na bayekoli na ye bakokaki kutu kolia te.
21
Tango bato ya libota na ye bayokaki yango, bayaki mpo na kozwa ye na makasi pamba te bazalaki koloba: “Akomi na liboma”.
22
Balakisi ya Mibeko oyo bawutaki na Yeruzalem balobaki: —Azali na Belzebula kati na ye; mpe ezali na bokonzi yamokonzi ya milimo mabe nde azali kobengana milimo mabe.
23
Bongo Yesu abengaki bango, mpe alobaki na bango na masapo: —Ndenge nini Satana akoki kobengana satana?
24
Soki bokonzi moko ekabwani kati na yango, bokonzi yango ekoki kowumela te.
25
Soki ndako moko ekabwani kati na yango, ndako yango ekoki kowumela te.
26
Mpe soki Satana amibundisi ye moko, mpe azali ya kokabwana, akowumela te mpe suka na ye emonani.
27
Pamba te, moto moko te akoki kokota na ndako ya elombempo na kobotola biloko na ye, soki liboso akangi ye na basinga te. Bongo nde akoki kobotola biloko ya ndako na ye.
28
Nalobi na bino ya solo, masumu nyonso mpe makambo nyonso oyo batobakoki koloba mpo na kofinga Nzambe, bakolimbisa bango yango.
29
Kasi oyo afingi Molimo Mosantu bakolimbisa ye ata moke te; akomema libela na libela mokumba ya lisumu wana.
30
Yesu alobaki bongo, mpo bango bazalaki koloba: “Azali na molimomabe”.
31
Mama na bandeko ya Yesu bayaki. Batelemaki libanda mpe batindaki moto moko mpo na kobenga ye.
32
Bato ebele penza bavandaki pembeni-pembeni na ye. Bongo balobaki na ye: —Mama na yo mpe bandeko na yo bazali libanda, bazali koluka yo.
33
Yesu azongisaki: —Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai ya mibali?
34
Bongo atalaki bato oyo bavandaki pembeni-pembeni na ye, mpealobaki: —Botala mama na ngai na bandeko na ngai.
35
Pamba te, oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na ngai yamobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16