bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 7
Mark 7
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 6
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 8 →
1
Bafarizeo na ndambo ya balakisi ya Mibeko, oyo bawutaki na Yeruzalem, bayaki kosangana epai Yesu azalaki.
2
Bamonaki ete bayekoli mosusu ya Yesu bazalaki kolia limpa na mabokoya mbindo; elingi koloba: maboko oyo basukola te.
3
Pamba te, bafarizeo na bayuda nyonso bazalaki kolia te sokibasukoli maboko malamu penza te; na bongo nde, bazalaki kotosa bonkoko ya bakoko.
4
Mpe soki bawuti na zando, baliaka te soki naino basukoli te. Bazalaki lisusu na mibeko mingi ya bonkoko oyo bazalaki kotosa, lokola: kosukola bakopo, biluku, na banzungu ya mabende.
5
Yango wana bafarizeo na balakisi ya Mibeko batunaki Yesu: —Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te mibeko ya bakoko, kasi baliaka na maboko ya mbindo?
6
Yesu azongiselaki bango: —Bino baiporite! Ezali asakolaki malamu mpo na bino; lokola ekomama: Bato oyo bakumisaka ngai na bambebo, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai!
7
Bakumbamelaka ngai kaka pamba; mateya na bango ezali kaka mibeko oyo esamaki na bato.
8
Pamba te, bobwakaka Mibeko ya Nzambe, mpe botosaka bonkoko ya bato.
9
Bongo alobaki na bango: —Botiaka Mibeko ya Nzambe na pembeni mpo na kotosa bonkoko na bino.
10
Pamba te, Moyize alobaki: —Tosa tata mpe mama na yo, mpe oyo akolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye.
11
Kasi bino bolobaka, soki moto alobi na tata to mama na ye: “Lisalisi oyo olingaki kozwa epai na ngai ezali ‘Korban’ ”, (elingikoloba likabo esengeli kaka mpo na Nzambe),
12
bongo bopesaka moto yango nzela mpo asala eloko moko te na tata na ye to mpe mama na ye.
13
Tala ndenge bobomaka Liloba ya Nzambe na nzela ya bonkoko na bino, oyo boteyanaka bino na bino. Bosalaka mpe makambo mingi ya ndenge wana!
14
Bongo Yesu abengaki lisusu ebele ya bato, mpe alobaki na bango: —Bino nyonso boyoka ngai, mpe bososola malamu likambo oyo:
15
Eloko moko te ezali libanda ya moto, oyo ekotaka na kati na yempe ekoki kokomisa ye mbindo. Kasi oyo ebimaka kati na ye yangonde ekomisaka ye mbindo.
16
[Soki moto azali na matoyi mpo na koyoka tika ye ayoka.]
17
Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na ye batunaki ye mpo na lisapo wana.
18
Bongo alobaki na bango: —Bino mpe bozali na mayele te? Boyebi te ete eloko moko te oyo ekotaka na moto, wuta libanda, ekoki kokomisa ye mbindo?
19
Pamba te yango ekotaka na motema na ye te, kasi na libumu na ye, bongo ebimaka libanda ya nzoto na ye (Na maloba oyo, Yesu alakisaki ete bilei nyonso ezali peto).
20
Bongo alobaki lisusu: —Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
21
Pamba te, wuta na kati, na motema ya moto nde ebimaka: makanisi ya mabe, ekobo, kindumba,
22
koboma, koyiba, lokoso ya mbongo, makambo ya mabe, makambo ya lokuta, pite, kofinga, lofundu, bozoba.
23
Makambo nyonso wana ya mabe, ebimaka na kati mpe yango ekomisaka moto mbindo.
24
Yesu alongwaki wana mpe akendaki na mikili ya Tire. Akotaki na ndako moko mpe alingaki te ete moto ata moko ayeba yango. Kasi akokaki kobombama te.
25
Mwasi moko azalaki na mwana ya mwasi oyo azalaki kotungisama na molimo mabe; tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki mpe afukamaki liboso na ye.
26
Mwasi yango azalaki Mogreki, abotamaki na Fenisia ya Siriya. Abondelaki Yesu mpo abengana molimo mabe na mwana na ye ya mwasi.
27
Kasi Yesu alobaki na ye: —Tika naino bana batonda, pamba te ezali malamu te mpo na kokamatamampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa.
28
Mwasi azongiselaki ye: —Nkolo, pamba te ata bambwa, na nse ya mesa baliaka bandambooyo bana bakweyisaka.
29
Bongo Yesu alobaki na ye: —Mpo na eyano oyo ozongisi, kende, molimo mabe esiʼebimi na mwanana yo ya mwasi.
30
Mpe tango akendaki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto, mpe molimo mabe ebimaki.
31
Bongo Yesu alongwaki na mikili ya Tire, alekaki na Sidoni, mpe akendaki na ebale ya Galileya na kolekela na mokili ya Dekapoli.
32
Bamemelaki ye moto moko ayokaka te mpe azalaki koloba na pasi. Bongo babondelaki ye mpo atiela ye maboko.
33
Yesu alongolaki ye na kati ya ebele ya bato, amemaki ye na pembeni, mpe atiaki ye misapi na matoyi; abwakaki nsoyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.
34
Atalaki na likolo, apemaki moke mpe alobaki na ye: —Efata (elingi koloba: fungwama).
35
Kaka na tango wana matoyi na ye efungwamaki mpe lolemo na ye ekangwamaki, mpe abandaki koloba malamu.
36
Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto moko te. Awa azalaki kopekisa bango sango yango mingi, bango bazalaki kopanza yango mingi penza koleka.
37
Bato bakamwaki mingi penza, mpe bazalaki koloba: —Azali kosala makambo nyonso malamu; azali koyokisa bato bakufa matoyi mpe kolobisa bato oyo balobaka te.
← Chapter 6
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 8 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16