bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Mark 10
Mark 10
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 11 →
1
Bongo Yesu alongwaki na esika wana, akendaki na mokili ya Yudea, mpe na ngambo ya Yordani. Bato ebele bayaki lisusu kosangana epai na ye; bongo abandaki koteya bango lokola amesanaki.
2
Bafarizeo bayaki, mpe mpo na komeka ye, batunaki: —Boni, nzela epesami na mobali mpo na kolongola mwasi na ye na libala?
3
Yesu azongiselaki bango: —Moyize apesaki bino mobeko nini?
4
Bango balobaki: —Moyize apesaki nzela na mobali ete akoma mokanda ya koboma libala, mpe alongola ye na libala.
5
Bongo Yesu azongisaki: —Moyize akomelaki bino mobeko wana mpo mitema na bino ezali makasi.
6
Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe asalaki bango mobali mpe mwasi.
7
Yango wana mobali akotika tata mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye,
8
Mpe bango mibale bakokoma mosuni moko. Bongo bakozala lisusu mibale te, kasi mosuni moko.
9
Yango wana moto moko te akabola oyo Nzambe asangisi!
10
Tango bazalaki lisusu na kati ya ndako, bayekoli batunaki Yesu mpo na likambo yango.
11
Ye azongisaki: —Moto oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo epai ya mwasi na ye ya liboso.
12
Mpe soki mwasi akabwani na mobali na ye mpe abalani na mobali mosusu, asali ekobo!
13
Bayelaki Yesu bana mike mpo asimba bango, kasi bayekoli bapamelaki baoyo bayaki na bango.
14
Tango Yesu amonaki bongo, asilikaki mpe alobaki na bango: —Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na ba oyo bazali lokola bango.
15
Nalobi na bino ya solo: moto oyo akoyamba Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te, akokota te na Bokonzi yango.
16
Bongo akamataki bana na maboko na ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
17
Tango Yesu azalaki kokende, moto moko ayaki mbangu epai na ye, afukamaki liboso na ye mpe atunaki ye: —Moteyi malamu, esengeli nasali nini mpo nazwa bomoi ya seko?
18
Yesu azongisaki: —Mpo na nini ozali kobenga ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko.
19
Oyebi Mibeko: Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, kokosa moninga te, tosa tata na yo mpe mama na yo.
20
Moto yango alobaki: —Moteyi, natosaka nyonso wana banda bolenge na ngai!
21
Yesu atalaki ye mpe alingaki ye. Alobaki na ye: —Ozangi eloko moko; kende, teka biloko nyonso oyo ozali na yango, pesa na babola, mpe okozala na bomengo na likolo; bongo yaka mpe landa ngai!
22
Tango ayokaki maloba wana, elongi na ye ekomaki mawa-mawa, akendaki na mawa, pamba te azalaki na bomengo mingi penza.
23
Bongo Yesu atalaki epai na epai, mpe alobaki na bayekoli na ye: —Ezali pasi mingi penza na bato ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe!
24
Bayekoli bakamwaki mingi penza mpo na maloba na ye. Kasi Yesu alobaki lisusu: —Bana, ezali pasi mingi penza.
25
Ezali pasi te na shamo mpo na koleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.
26
Bayekoli bakamwaki mingi penza, mpe bazalaki koloba bango na bango: —Bongo nani akoki kobika?
27
Yesu atalaki bango mpe alobaki: —Na bato ekoki kosalama te, kasi na Nzambe te; pamba te, Nzambe akoki kosala nyonso.
28
Piere alobaki na Yesu: —Tala, totiki biloko nyonso mpo na kolanda yo!
29
Yesu azongisaki: —Nalobi na bino ya solo, moto moko te oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye, to bilanga na ye, mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu;
30
Bongo azanga kozwa sikʼoyo mbala nkama koleka, na tango oyo tozali: Bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko; mpe na tango oyo ekoya: bomoi ya seko.
31
Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso, bakokoma bato ya suka, mpe bato ya suka bakokoma bato ya liboso!
32
Tango bazalaki na nzela mpo na komata na Yeruzalem; Yesu azalaki kotambola lisoso na bango. Bayekoli bazalaki kokamwa, mpe ba oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga. Bongo Yesu akamataki lisusu bapostolo na ye zomi na mibale na pembeni, mpe abandaki koyebisa bango makambo oyo ekokweyila ye.
33
Alobaki na bango: —Tala, tozali kokende na Yeruzalem, mpe bakoteka Mwana ya Moto na maboko ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mibeko. Bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na maboko ya bapakano.
34
Bongo bakoseka ye, bakobwakela ye soyi, bakobeta ye bamfimbo, mpe bakoboma ye; kasi akosekwa sima ya mikolo misato!
35
Bongo Zaki mpe Jean, bana ya Zebedeo, bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na ye: —Moteyi tolingi osalela biso likambo oyo tokosenga yo.
36
Yesu atunaki bango: —Bolingi nasala nini mpo na bino?
37
Bazongiselaki ye: —Tika ete moko na biso avanda na loboko na yo ya mobali, mpe mosusu na loboko na yo ya mwasi, kati na kembo na yo.
38
Kasi Yesu alobaki na bango: —Boyebi te oyo bozali kosenga; boni, bokokoka komela kopo oyo ngai nakomela? To mpe bokoka kozwa libatisi oyo ngai nakozwa?
39
Bazongisaki: —Tokokoka! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bokomela kopo oyo ngai nakomela mpe bokozwa libatisi oyo ngai nakozwa.
40
Kasi mpo na kovanda na loboko na ngai ya mobali to na loboko na ngai ya mwasi, ezali ngai te moto nakopesa yango. Bisika wana ekozala mpo na bato oyo ba bongisama mpo na yango.
41
Tango bapostolo zomi mosusu bayokaki likambo yango, basilikelaki Zaki mpe Jean.
42
Bongo Yesu abengaki bango nyonso epai na ye mpe alobaki: —Boyebi ete ba oyo bamonanaka lokola bakonzi ya bapakano balakisaka bokonzi likolo na bango, mpe bato na bango ya minene batindaka bango na makasi.
43
Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo te. Nzoka nde, soki moto moko alingi kokoma moto monene na kati na bino, esengeli azala mosali na bino.
44
Mpe oyo alingi kozala mosali ya liboso, esengeli azala mowumbu ya bato nyonso.
45
Pamba te ata Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi mpo na kosalela bato, mpe kokaba bomoi na ye mpo na kobikisa bato ebele!
46
Bongo bakomaki na Zeriko. Awa yesu na bayekoli na ye? Elongo na ebele ya bato? Bazalaki kobima na Zeriko, moto moko akufa miso, Bartime, mwana ya Time, azalaki ya kovanda na pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga mbongo.
47
Tango ayokaki ete ezali Yesu ya Nazareti, abandaki koganga: —Yesu Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
48
Bato ebele bangangelaki ye mpe balobaki na ye avanda nyee. Kasi agangaki lisusu makasi koleka: —Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
49
Yesu atelemaki mpe alobaki: —Bobenga ye! Bongo babengaki moto akufa miso mpe balobaki na ye: —Yika mpiko, telema, azali kobenga yo!
50
Abwakaki elamba na ye, atelemaki noki, mpe akendaki epai ya Yesu.
51
Yesu atunaki ye: —Olingi nasala nini mpo na yo? Mokufi miso azongisaki: —Moteyi, nalingi namona!
52
Bongo Yesu alobaki na ye: —Kende, kondima na yo ebikisi yo! Na mbala moko, abandaki komona mpe alandaki Yesu na nzela.
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 11 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16