bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 10
Revelation 10
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 11 →
1
Bongo namonaki anzelu mosusu ya nguya makasi penza, azalaki kokita wuta na likolo. Lipata moko ezipaki ye lokola elamba, mpe arkansiel moko ezingaki motu na ye. Elongi na ye ezali lokola moi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.
2
Asimbaki mwa buku efungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi na mokili.
3
Agangaki na mongongo makasi ndenge tambwe egangaka. Mpe tango asilisaki koganga, bankake sambo ebetaki.
4
Tango bankake sambo esilaki kobeta, nalingaki kokoma, kasi nayokaki mongongo moko ewutaki na Likolo, elobelaki ngai: “Bomba malamu makambo oyo bakake sambo elobi, kokoma yango te!”
5
Bongo anzelu, oyo namonaki atelemaki na ebale monene mpe na mokili, atombolaki loboko na ye ya mobali na likolo
6
mpe alapaki ndayi na kombo ya Moto oyo azali na bomoi libela na libela, Ye oyo asalaki likolo mpe biloko oyo ezali kuna, mabele mpe biloko oyo ezali kuna, na ebale monene mpe biloko oyo ezali kati na yango: —Tango ya kozela ezali lisusu te!
7
Kasi na mokolo yango, tango anzelu ya sambo akobeta kelelo, Nzambe akokokisa mabongisi na ye oyo ezali ya kobombama, ndenge ayebisaki yango na basali na ye baprofeta.
8
Bongo mongongo oyo nayokaki, oyo ewutaki na Likolo, elobelaki ngai lisusu: —Kende, kamata buku ya moke oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anzelu, oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili.
9
Napusanaki pene-pene ya anzelu, mpe nasengaki ye apesa ngai buku ya moke. Bongo ye alobaki na ngai: — Kamata yango mpe lia yango! Ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi.
10
Nakamataki mwa buku yango na loboko ya anzelu, mpe namelaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi, kasi tangonaliaki yango, ekomaki bololo na kati ya libumu.
11
Bongo balobaki na ngai: —Esengeli osakola lisusu na mikili mingi, bikolo mingi, minokomingi, mpe epai ya bakonzi mingi.
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 11 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22