bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 16
Revelation 16
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 15
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 17 →
1
Bongo nayokaki mongongo moko ya monene ewutaki na ndako ya Nzambe, elobaki na baanzelu sambo: —Bokende mpe bosopa na mabele bakopo sambo ya kanda ya Nzambe.
2
Anzelu ya liboso akendaki mpe asopaki kopo na ye na mabele. Bongo bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na nzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bakumbamelaki elilingi na yango.
3
Anzelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebaleekomaki makila lokola ya moto akufi; mpe biloko nyonso ya bomoi oyo ezalaki na ebale, ekufaki.
4
Anzelu ya misato asopaki kopo na ye na ba-ebale mpe na bisika mayi ebimaka; mpe ekomaki makila.
5
Bongo nayokaki anzelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi, alobaki: —Ozali sembo, yo oyo ozali mpe ozalaki; Mosantu, mpo okati bongo!
6
Pamba te basopaki makila ya basantu mpe ya baprofeta; mpe opesi bango makila mpo bamela, yango ekoki na bango.
7
Bongo nayokaki mongongo moko ewutaki na mesa oyo batumbelaka makabo, elobaki: —E e, Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, okataka makambo na ndenge yasolo mpe ya sembo!
8
Anzelu ya minei asopaki kopo na ye likolo ya moi. Mpe moi ezwaki nzela ya kozikisa bato na moto.
9
Bato bazikaki na moto ya makasi penza mpe babandaki kofinga kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya bapasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa ye nkembo.
10
Anzelu ya mitano asopaki kopo na ye likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama; bokonzi ya nyama yango ekomaki molili, mpe bato babandaki komiswa lolemo mpo na pasi;
11
bafingaki Nzambe ya Likolo, mpo na bapasi na bango mpe mpo na bapota na bango. Kasi baboyaki kobongola mitema na misala na bango.
12
Anzelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale monene ya Efrate; bongo mayi na yango ekawukaki mpo na kobongisa nzela ya bakonzi mineneoyo bakowuta na Este.
13
Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo ebimaki na monoko ya Dragon, monoko ya nyama, mpe na monoko ya moprofeta ya lokuta.
14
Yango nde milimo ya mbindo oyo esalaka makamwisi, mpe ekokende epaiya bakonzi minene ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango esika moko mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso.
15
Tala: nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo azalikokengela mpe azali kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola bolumbu tempe bamona soni na ye te.
16
Bongo milimo wana esangisaki bakonzi minene na esika oyo babengaka na monoko ya Ki-ebreo: “Armagedoni”.
17
Anzelu ya sambo asopaki kopo na ye likolo ya mopepe, mpe mongongo moko ya monene ewutaki na Kiti ya bokonzi, ebimaki na Ndako ya Nzambe, elobaki: —Ekokisami!
18
Bongo kongenga ya kake emonanaki, kake ebetaki, lokitoeyokanaki, mpe mokili eninganaki makasi penza. Koningana ya ndenge wana naino esalama te banda moto azali na mokili.
19
Vile monene ekabwanaki na biteni misato; mpe bavile ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki vile monene ya Babilona mpe apesaki yango kopo oyo etonda na vino ya kongala ya kanda na ye.
20
Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te.
21
Mbula ya mabanga minene enokaki: libanga moko ezalaki na bakilo pene-pene ntuku minei na mibale na ntuku misato, mpe ezalaki kokweyela bato. Bongo bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mbula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki monene mingi.
← Chapter 15
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 17 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22