bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 9
Revelation 9
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 10 →
1
Bongo anzelu ya mitano abetaki kelelo; namonaki monzoto ewutaki na likolo mpe eyaki kokweya na mokili. Bapesaki monzoto yango fungola ya libulu ya molayi.
2
Monzoto efungolaki libulu yango, mpe milinga ebimi na kati. Milinga yango ezali lokola oyo ebimaka na fulu ya monene. Bongo moi na mopepe eyindaki na milinga wana.
3
Mankonko ebimaki na milinga wana mpe epanzanaki na mokili. Bapesaki mankonko yango nguya lokola oyo ya bankoto ya mokili.
4
Bapekisaki mankonko ete esala mabe te na matiti ya mokili, to na banzete, to na mwa matiti oyo ya mike-mike; kasi esala mabekaka na bato oyo bazangi elembo ya Nzambe na elongi.
5
Mankonko ezwaki nguya ya koboma bato te, kasi kaka ya konyokolabango sanza mitano. Pasi oyo mankonko emonisaki bato, ezali lokolapasi oyo moto amonaka soki nkoto eswi ye.
6
Na mikolo wana, bato bakoluka liwa, kasi bakozwa yango te; bakolinga kokufa, kasi liwa ekokima bango mosika.
7
Mankonko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba; na likolo ya mitu na yango ezalaki na biloko moko lokola bikoti ya bokonzi oyo ya wolo, mpe bilongi na yango, ezalaki lokolabilongi ya bato.
8
Suki na yango ezalaki lokola oyo ya basi. Mpe mino na yango lokola oyo ya tambwe.
9
Ezalaki na biloko moko lokola bibende oyo basoda bazalakikolata mpo na komibatela na makonga. Makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bapusu-pusu oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba.
10
Mankonko yango ezalaki na mikila mpe basende lokola oyo ya bankoto. Mpe nguya ya konyokola bato basanza mitano ezalaki na mikila na yango.
11
Anzelu ya libulu molayi ye nde azalaki mokonzi ya mankonko yango. Kombona ye na monoko ya Ba-ebreo: “Abadon”, mpe na monoko ya Bagreki: “Apolion”.
12
Mawa ya liboso elekaki; tala, mawa mibale ezali koya simaya makambo wana.
13
Bongo anzelu ya motoba abetaki kelelo. Mpe nayokaki mongongo moko ebimaki wuta na basonge minei ya mesa ya wolo oyo batumbelaka makabo, oyo ezalaki liboso ya Nzambe,
14
elobaki na anzelu ya motoba oyo azalaki na kelelo: —Fungola baanzelu minei oyo bakangama na minyololo, na ebale monene ya “Efrate”.
15
Bongo afungolaki baanzelu yango minei, baoyo bazalaki ya kobongisama mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana, mpe mbula wana, mpo ete baboma eteni moko ya misato ya bato nyonso.
16
Bayebisaki ngai talo ya basoda oyo babutaki likolo ya bampunda mpo na etumba, bazalaki: bankoto nkama mibale.
17
Tala ndenge namonaki na emoniseli bampunda na basoda oyo bamemaka bampunda: balataki bibende oyo basoda bazalaki kolata mpo na komibatela na etumba; bibende yango ezalaki ya motane lokola moto, ya langi ya bule ya pete-pete, mpe ya langi ya mosaka. Mitu ya bampunda yango ezalaki lokola oyo ya bantambwe; mpe moto, molinga, na sufulu ezalaki kobima na minoko na yango.
18
Eteni moko ya misato ya bato nyonso ekufaki mpo na bapasi misato oyo: moto, molinga mpe sufulu oyo ezalaki kobima na minoko na yango.
19
Pamba te, nguya ya bampunda ezalaki na minoko mpe na mikila na yango; mpo mikila na yango ezalaki lokola banyoka. Mikila yango ezalakina mitu, mpe ezalaki konyokola bato na mikili wana.
20
Bato mosusu oyo bakufaki te na batembe wana, babongolaki mitema te na misala ya mabe oyo bazalaki kosala. Batikaki te kosambela milimo mabe, bikeko ya wolo, ya palata, ya bibende, ya mabanga, mpe ya nzete, oyo ekoki komona te, to koyoka te, to mpe kotambola te.
21
Bato yango babongwanaki te mpo batika koboma bato, batika kindoki, batika kindumba mpe moyibi.
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 10 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22