bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 13
Revelation 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 14 →
1
Sima namonaki nyama moko ebimaki na ebale monene, ezalaki na maseke zomi mpe mitu sambo. Elataki bikoti zomi ya bokonzi na maseke na yango; mpe na mitu na yango bakomaki bakombo ya kotiola Nzambe.
2
Nyana oyo namonaki ekokanaki na nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya nyama oyo babengaka Uruse, mpe monoko na yango ezalaki lokolamonoko ya tambwe. Bongo Dragon epesaki nyama yango nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi, mpe bokonzi monene penza.
3
Namonaki motu moko ya nyama wana ezalaki lokola babetaki yango peneya liwa; mpe pota oyo elingaki koboma yango esilaki. Bongo mokili mobimba ezalaki kokamwa nyama yango mpe elandaki yango.
4
Bato babandaki kosambela Dragon mpo epesaki bokonzi na yango na nyama wana. Basambelaki nyama yango mpe balobaki: “Nani akokani na nyama, mpe nani akoki kobunda na yango?”
5
Mpe nyama ezwaki nzela ya koloba maloba ya lofundu mpe ya kofinga Nzambe. Ezwaki mpe bokonzi ya kosala mosala na yango basanzantuku minei na mibale.
6
Bongo ebandaki koloba maloba ya kotiola Nzambe, kotiola kombo na ye, esika ye avandaka, mpe baoyo bavandaka na Likolo.
7
Ezwaki nzela ya kobunda na basantu mpe ya kolonga bango. Mpe bapesaki yango bokonzi likolo ya mabota nyonso, yamikili nyonso, ya minoko nyonso mpe ya bikolo nyonso.
8
Bongo bato nyonso oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te, banda mokili esalama, na Buku ya bomoi ya Mwanameme oyo babomaki, bakosambela ye.
9
Moto oyo azali na matoyi tika ayoka!
10
Soki moto asengeli kokota na boloko, akokota na boloko. Soki moto asengeli kokufa na mopanga, akokufa na mopanga. Yango wana, esengeli ete bato ya Nzambe bazala bato ya kokanga motema mpe kondima.
11
Bongo namonaki nyama mosusu ebimaki na mabele. Nyama yango ezalaki na maseke mibale oyo ezalaki lokola ya mwana-meme, mpe ezalaki koloba lokola Dragon.
12
Esalelaki bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na ye. Esalaki ete mabele mpe bato oyo bavandaka na mabele bakumbamela nyama ya liboso oyo ezalaki na pota oyo elingaki koboma ye mpe pota yango esilaki.
13
Esalaki makamwisi minene, na ndenge ete ekitisaki kutu motowuta na likolo kino na mokili, na miso ya bato.
14
Bongo ekosaki baoyo bavandaka na mabele na nzela ya makamwisi oyo bapesaki ye ndingisa ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Nyama ya mibale etindaki baoyo bavandaka na mokili ete basala elilingi mpo na lokumu ya nyama oyo bazokisaki na mopanga mpe ezongaki na bomoi.
15
Mpe nyama ya mibale ezwaki nzela ya kopesa pema na elilingi ya nyama ya liboso mpo ete ekoka koloba, mpe eboma baoyo nyonso baboyaki kosambela yango.
16
Etindaki lisusu bato nyonso na makasi, bato minene mpe bato pamba, bato ya bomengo mpe babola, bawumbu mpe bato ya bonsomi, ete bazwa elembo na loboko ya mobali to na elongi,
17
mpo ete moto moko te akoka kosomba to koteka, longola kaka oyo azali na elembo; elembo yango ezali nde kombo ya nyama to talo ya kombona yango.
18
Likambo oyo ezali kosenga bwania. Tika ete moto oyo azali na mayele atanga talo ya nyama. Pamba te talo yango ekokani na kombo ya moko. Talo yango ezali: nkama motoba na ntuku motoba na motoba.
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
Recommended Reading
Commentary
Revelation Commentaries
→
Devotional
Revelation Devotional Guide
→
Get This Bible
Lingala Bible (Mokanda na Bomoi) Study Bible
→