bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 7
Revelation 7
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 6
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 8 →
1
Sima ya makambo wana, namonaki baanzelu minei batelemaki na basonge nyonso minei ya mokili; bakangaki mipepe minei ya mokili, mpo ete mopepe ata moke te eleka na mokili, to na ebale monene, to na nzete ata moko.
2
Bongo namonaki anzelu mosusu awutaki na Este asimbaki elembo ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya baanzelu mineioyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene;
3
alobaki: —Bosala mabe te na mokili, to na ebale monene, to na banzete, kinotango tokosilisa kotia elembo na bilongi ya basali ya Nzambe na biso.
4
Bongo nayokaki talo ya bato oyo bazwaki elembo: nkoto nkama moko na ntuku minei na minei ya mabota nyonso ya bana Isayele.
5
Na libota ya Yuda: bato nkoto zomi na mibale bazwaki elembo; na libota ya Ruben: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Gadi: bato nkoto zomi na mibale;
6
na libota ya Asere: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Neftali: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Manase: bato nkoto zomi na mibale;
7
na libota ya Simeon: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Levi: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Isakare: bato nkoto zomi na mibale;
8
na libota ya Zabuloni: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Zosefi: bato nkoto zomi na mibale; mpe na libota ya Benzamin: bato nkoto zomi na mibale.
9
Sima ya makambo wana, namonaki bato ebele penza, oyo moto ata moko te akokaki kotanga bango. Bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso, mpe ya minoko nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-meme; balataki banzambala ya pembe, mpe basimbaki mandalala na maboko na bango.
10
Bazalaki koganga na mongongo makasi: —Lobiko na Nzambe na biso oyo avandi na kiti ya Bokonzi, mpe na Mwana-Meme!
11
Baanzelu nyonso batelemaki pembeni-pembeni ya Kiti ya bokonzi, ya bampaka, na bikelamo minei ya bomoi. Bongo bafukamaki libosoya Kiti ya Bokonzi elongi na nse mpe bazalaki kokumisa Nzambe.
12
Bazalaki koloba: Amen! Masanzoli, nkembo, bwania, matondi, lokumu, nguya mpe makasi, ezala na Nzambe na biso, mikolo nyonso seko! Amen!
13
Bongo moko ya bampaka atunaki ngai: —Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani? Mpe bawuti wapi?
14
Nazongiselaki ye: —Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai: —Ezali baoyo bawuti koniokwama mingi penza. Basukolaki banzambala na bango, mpe bakomisaki yango pembe na makila ya Mwana-meme.
15
Yango wana batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe bazali kosalela ye butu moi na Ndako na ye. Mpe Moto oyo avandi na Kiti ya bokonzi akobomba bango na Ndako na ye ya kapo.
16
Bakoyoka lisusu nzala te mpe bakozala lisusu na posa ya mayi te; bakoyoka lisusu pasi ya moi te, to mpe ya molunge te.
17
Mpo Mwana-meme oyo azali na kati-kati ya Kiti ya bokonzi akobatela bango. Akomema bango na bisika oyo mayi ya bomoi ebimaka. Bongo Nzambe akopangusa mayi nyonso ya miso na bango.
← Chapter 6
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 8 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22