bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 17
Revelation 17
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 16
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 18 →
1
Bongo anzelu moko na kati ya banzelu sambo oyo bazalaki na bakoposambo, ayaki mpe alobaki na ngai: —Yaka, nakolakisa yo etumbu ya mwasi ya ndumba monene, oyo avandi likolo ya bamayi mingi.
2
Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe baoyo bavandaka na mikili balangwa vino ya kindumba na ye!
3
Bongo anzelu amemaki ngai na Molimo kati na esobe. Kuna, namonaki mwasi moko afandaki likolo ya nyama ya motane, nyama yango ezalaki ya kotonda na bakombo ya kofinga Nzambe, mpeezalaki na mitu sambo mpe na maseke zomi.
4
Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete-pete mpe motane ya makasi, babizu ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka. Asimbaki na loboko na ye kopo ya wolo etonda na makambo ya sonimpe ya bosoto ya kindumba na ye.
5
Kombo moko ezalaki ya kokomama na elongi na ye: “Sekele, Babilona vile monene, mama ya basi ya ndumba mpe ya makambo ya soni ya mokili.”
6
Mpe namonaki mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe makila ya batemwe ya Yesu. Nakamwaki mingi penza tango namonaki ye.
7
Bongo anzelu alobaki na ngai: —Mpo na nini ozali kokamwa? Nakoyebisa yo sekele ya mwasi wana, mpe ya nyama oyo ezali komema ye, oyo ezali na mitu sambo mpe maseke zomi.
8
Nyama oyo omonaki, oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te, ekobima na libulu ya molai mpe ekokende na libebi. Bongo bato oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te na Buku ya bomoi banda na ebandeli ya mokili, bakokamwa tango bakomona nyama wana. Pamba te, nyama yango ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te; mpe ekoya lisusu.
9
Mpo na kososola makambo oyo, esengeli ozala na bwania mingi. Mitu wana sambo, ezali bangomba sambo epai mwasi afandi. Yango ezali mpe bakonzi minene sambo.
10
Mitano basiʼbakweya na bokonzi, moko azali sikʼoyo na bokonzi, mpe mosusu ayei naino te. Tango akoya, esengeli awumela mwa tango moke.
11
Bongo nyama oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Nyama yango ezali moko na kati ya bakonzi wana sambo, mpe ekokende na libebi.
12
Maseke zomi oyo omonaki, ezali bakonzi zomi oyo bazwi naino bokonzi te. Kasi bokonzi na bango ekozala ya ngonga moko kaka, elongo na nyama wana.
13
Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko, mpe bakopesa nguya mpe bokonzi na bango na nyama wana.
14
Bakobunda na Mwana-meme, kasi Mwana-meme akolonga bango, pamba te ye azali Nkolo ya bakolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Akolonga bango elongo na bato oyo bazali na ye elongo, baoyo Nzambe abenga mpe apona, mpebazali ya kokangama na ye.
15
Bongo anzelu alobaki na ngai: —Bamayi oyo omonaki epai mwasi ya ndumba afandaki, ezali bato yamokili, bato ebele, bikolo, mpe minoko.
16
Maseke zomi oyo omonaki mpe nyama wana, bakoyina mwasi ya ndumba. Bakobotola ye biloko na ye nyonso mpe bakotika ye bolumbu, bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na moto.
17
Pamba te Nzambe atia na mitema na bango posa ya kokokisa makanisina ye; bakoyokana mpo na kopesa nyama wana nguya na bango ya kokamba, kino tango Maloba ya Nzambe ekokokisama.
18
Bongo mwasi oyo omonaki, ezali vile monene oyo ezali na bokonzi likolo ya bakonzi minene ya mokili.
← Chapter 16
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 18 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
Recommended Reading
Commentary
Revelation Commentaries
→
Devotional
Revelation Devotional Guide
→
Get This Bible
Lingala Bible (Mokanda na Bomoi) Study Bible
→