bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 20
Revelation 20
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 19
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 21 →
1
Bongo namonaki anzelu moko azalaki kokita wuta likolo, asimbaki fungola ya libulu ya molai mpe monyololo moko ya monene.
2
Akamataki Dragon, nyoka wana ya kala, oyo azali zabolo mpe satana, mpe akangaki ye na monyololo mpo na bambula nkoto moko.
3
Anzelu abwakaki ye na libulu ya molai. Akangisaki yango mpe atiaki elembo likolo na yango, mpo ete akosa lisusu te bikolo, kino tangobambula nkoto moko ekokoka. Bongo na sima, esengeli batika ye mpo na mwa tango moke.
4
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi na baoyo bafandelaki yango; bapesaki bangobokonzi ya kosambisa bato. Namonaki milimo ya bato oyo bakataki bango mitu mpo na litatoli ya Yesu mpe mpo na liloba ya Nzambe. Baboyaki kosambela nyama mpe na elilingi na yango, mpe bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na maboko na bango; bazongaki na bomoi, mpe bazalaki na bokonzi bambula nkoto moko elongo na Kristo.
5
Bato mosusu oyo bakufaki, bazongaki na bomoi te kino tango bambula nkoto moko ekokaki. Yango nde Lisekwa ya liboso.
6
Esengo mpe mosantu, bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso! Liwa ya mibale ezali lisusu na nguya te likolo na bango; kasi bakozala banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakozala na bokonzi elongo na ye, bambula nkoto moko.
7
Tango bambula wana nkoto moko ekokoka, bakobimisa Satana na boloko,
8
mpe akokende kokosa bikolo oyo ezali na bipai nyonso minei ya mokili mobimba, Gogi mpe Magogi, mpo asangisa bango esika moko mpo na kobunda etumba; bakozala ebele, ebele penza lokola zelo ya ebale monene.
9
Bongo bapanzanaki na mokili mobimba, bazingaki mboka ya basantu, mpe vile oyo Nzambe alingaka mingi. Kasi moto ewutaki na likolo, ekitelaki bato wana mpe ebomaki bango.
10
Bongo zabolo oyo azalaki kokosa bango, babwakaki ye na laki ya moto mpe ya sufulu, esika babwakaki nyama mpe moprofeta ya lokuta. Kuna bakomona pasi seko, butu na moi.
11
Bongo namonaki Kiti monene ya bokonzi ya pembe. Moto moko avandelaki yango. Likolo mpe nse ekimaki liboso ya elongi na ye, mpe esika ezwamaki te mpo na yango.
12
Bongo namonaki bato bakufa: bato minene mpe bato pamba batelemakiliboso ya Kiti ya bokonzi. Babuku efungwamaki; mpe Buku mosusu efungwamaki, yango nde Buku ya bomoi. Bongo bato basambisaki bato bakufa, moto nyonso na makambo oyo ye asalaki, ndenge ekomamaki na babuku wana.
13
Ebale monene ezongisaki bakufi nyonso oyo bazalaki kati na yango; liwa mpe mboka ya bakufi ezongisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; bongo moto nyonso asambaki na makambo oyo ye asalaki.
14
Liwa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki na laki ya moto. Laki yango ya moto yango nde: liwa ya mibale.
15
Mpe moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te na Buku ya bomoi, babwakaki ye na laki ya moto.
← Chapter 19
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 21 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22