bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Revelation 15
Revelation 15
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 14
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 16 →
1
Bongo namonaki na Likolo, elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa: baanzelu sambo bazalaki na bapasi sambo, yango ezali bapasi ya suka; pamba te na yango nde Kanda ya Nzambe ekokokisama.
2
Namonaki mpe ebale monene esangana na moto, ezalaki lokola talatala. Namonaki lisusu baoyo balongaki nyama, mpe elilingi na yango, mpe na talo ya kombo na yango, batelemaki likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala, mpe bazalaki na mandanda ya Nzambe.
3
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mosali ya Nzambe, mpe nzemboya Mwana-Meme: Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa! Nkolo ya biloko nyonso; banzela na yo ezali sembo mpe solo.
4
Nkolo, nani akobanga yo te mpe akoboya kokumisa kombo na yo? Pamba te yo kaka nde ozali Mosantu. Bato ya bikolo nyonso bakoya, mpe bakosambela yo; pamba te misala na yo ya bosembo emonani polele!
5
Sima ya makambo wana, natalaki mpe namonaki Ndakoya Nzambe na Likolo efungwamaki, yango nde Ndako ya kapo ya litatoli.
6
Bongo baanzelu sambo oyo bamema bapasi sambo babimaki na Ndako ya Nzambe. Balataki elamba oyo babengaka lino; ezalaki ya peto mpe ezalaki kongenga makasi penza, mpe bakangaki mikaba ya wolo na tolo na bango.
7
Moko na kati ya bikelamo minei ya bomoi epesaki na baanzelu sambu bakopo sambo ya wolo, oyo ezalaki ya kotonda na kanda ya Nzambe, ye oyo azali na bomoi libela na libela.
8
Bongo Ndako ya Nzambe etondaki na milinga oyo ewutaki na nkembo ya Nzambe mpe na nguya na ye. Mpe moto moko te akokaki kokotana Ndako ya Nzambe, kino tango bapasi sambo ya baanselu sambo ekokisamaki.
← Chapter 14
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 16 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22