bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 10
John 10
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 11 →
1
Nazali koloba na bino ya solo: moto oyo akotaka na lopango ya bameme na porte na yango te, kasi amataka likolo ya lopango na esika mosusu, ye azali moyibi mpe mobomi.
2
Kasi ye oyo akotaka na porte, ye nde azali mobateli ya bameme.
3
Mokengeli akofungolela ye porte, mpe bameme bayokaka mongongo na ye. Mpe abengaka bameme na ye na kombo na bango, mpe abimisaka yango na libanda.
4
Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na bango mpe bameme balandaka ye, pamba te bayebi mongongo na ye.
5
Balandaka mopaya te kasi bakimaka ye mosika, pamba te bayebi mongongo na ye.
6
Yesu alobaki na bango lisapo oyo, kasi bayebaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango.
7
Yesu alobaki na bango lisusu: —Nazali koloba na bino ya solo: ngai nazali porte ya bameme.
8
Baoyo nyonso bayaki liboso na ngai bazalaki miyibi mpe babomi. Mpe bameme bayokelaki bango te.
9
Ngai nazali porte; moto nyonso oyo akokota na nzela na ngai, akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
10
Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma, mpe kobebisa. Kasi ngai nayaki mpo ete bazwa bomoi, mpe bazwa yango ya mingi penza.
11
Ngai nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu apesaka bomoi na ye mpo na bameme.
12
Kasi moto oyo azali penza mobateli te, oyo asalaka kaka mpo na lifuti, mpe azali nkolo ya bameme te, soki amoni mbwa ya zamba ezali koya, akotika bameme mpe akokima. Bongo mbwa ya zamba ekokanga mpe ekopanza bameme.
13
Akokima, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti, mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.
14
Ngai nazali mobateli malamu ya bameme; nayebi bameme na ngai, mpe bameme na ngai eyebi ngai,
15
ndenge Tata ayebi ngai, ngai mpe nayebi Tata! Mpe nakopesa bomoi na ngai mpo na bameme.
16
Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Esengeli ete namema yango; ekoyoka mongongo na ngai, mpe etonga ya bameme ekozala kaka moko, mpe mobateli akozala kaka mpe moko.
17
Tata alingaka ngai mpo nakabi bomoi na ngai, mpo ete nazwa yango lisusu.
18
Moto moko te alongoli ngai yango, kasi napesi yango na mokano na ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa yango mpe ya kozwa yango lisusu. Etinda oyo, nazwaki yango epai ya Tata na ngai.
19
Bayuda bakabwanaki lisusu mpo na maloba oyo.
20
Bongo mingi kati na bango bazalaki koloba: —Azali na molimo mabe! Azali na liboma! Mpo na nini bozali koyoka ye?
21
Basusu bazalaki koloba: —Maloba wana ezali ya moto oyo azali na molimo mabe te! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bato bakufa miso?
22
Bongo tango ekokaki oyo bazalaki kosala na Yeruzalem feti ya “Kobulisa Ndako ya Nzambe”, mpe ezalaki tango ya malili makasi.
23
Yesu azalaki kotambola na lopango ya Ndako ya Nzambe, na veranda ya Salomo.
24
Bayuda bazingaki ye mpe batunaki ye: —Kino tango nini okotika mitema na biso ezala kaka likolo-likolo? Soki ozali Kristo, yebisa biso yango polele!
25
Yesu azongiselaki bango: —Nayebisaki bino yango, kasi bozali kondima te! Makamwisi oyo nazali kosala na kombo ya Tata, ezali kotatola mpo na ngai;
26
kasi bino bozali kondima te, pamba te bozali bameme na ngai te.
27
Bameme na ngai eyokaka mongongo na ngai, nayebi bango, mpe elandaka ngai!
28
Nazali kopesa yango bomoi ya seko, ekokufa soki moke te; mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na ngai!
29
Tata na ngai, oyo apesaki ngai yango, aleki nyonso na monene. Mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na ngai.
30
Ngai na Tata, tozali se moko.
31
Bongo Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma ye.
32
Yesu alobaki na bango: —Nalakisi bino makamwisi mingi ya minene, oyo ewutaki epai ya Tata; bongo bolingi koboma ngai na mabanga mpo na likamwisi nini?
33
Bayuda bazongiselaki ye: —Tolingi koboma yo te mpo na likamwisi moko boye, kasi mpo ozali kofinga Nzambe. Mpe, mpo yo ozali moto, kasi ozali koloba ete ozali Nzambe.
34
Yesu alobaki na bango: —Ekomama te na Mibeko na bino ete: Ngai nalobaki: Bozali banzambe?
35
Nzokande, Makomi ekoki koboyama te. Soki Mibeko na bino ezali kobenga “banzambe” baoyo Liloba ya Nzambe eyelaki bango,
36
bongo mpo na nini bozali koloba na ngai ete nazali kotiola Nzambe, awa nalobi: “Nazali Mwana na Nzambe,” pamba te Tata moto abulisaki ngai mpe atindaki ngai na mokili.
37
Soki nasalaka te misala ya Tata na ngai, wana bondimela ngai te.
38
Kasi soki nasalaka yango, bondimela yango ata soki bozali kondimela ngai te, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na ngai, mpe ngai nazali kati na Tata.
39
Balukaki lisusu kokanga ye, kasi akimaki bango.
40
Bongo Yesu akendaki lisusu na ngambo ya mayi ya Yordani, esika Jean azalaki kobatis bato, mpe atikalaki kuna.
41
Bato mingi penza bayaki epai na ye. Balobaki: —Jean asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo ye alobaki mpo na moto oyo, ezali ya solo!
42
Mpe kuna, bato mingi bandimelaki Yesu.
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 11 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21