bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 6
John 6
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 7 →
1
Sima na yango, Yesu akendaki na ngambo mosusu ya ebale ya Galilea (oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade).
2
Bato ebele penza bazalaki kolanda ye mpo bazalaki komona makamwisi oyo azalaki kosala na bato ya maladi.
3
Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna na bayekoli na ye.
4
Nzokande Pake, feti ya bayuda ekomaki pene-pene.
5
Tango Yesu atalaki mpe amonaki bato ebele penza bazalaki koya epai na ye; atunaki Filipo: —Tokosomba mapa wapi mpo bato oyo balia?
6
Atunaki ye motuna wana mpo na komeka ye pamba te ye moko ayebaki likambo oyo alingaki kosala.
7
Filipo azongiselaki ye: —Badeni nkama mibale ekokoka te kosomba mapa ya kokoka mpo ete moto nyonso azwa mwa ndambo.
8
Moyekoli na ye moko, Andele ndeko ya Simon Piere, alobaki na ye:
9
—Mwana moko ya mobali azali awa, azali na mapa mitano mpe bambisi mibale. Kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato boye?
10
Bongo Yesu alobaki: —Bovandisa bato. Matiti ezalaki mingi na esika yango; bongo bango nyonso bavandaki. Mibali nyonso bazalaki pene-pene ya nkoto mitano.
11
Yesu akamataki mapa, azongisaki matondi, mpe akabolaki yango na bato oyo bavandaki wana. Asalaki mpe ndenge moko na bambisi, mpe bazwaki ndenge bango balingaki.
12
Tango bango nyonso batondaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.
13
Basangisaki yango mpe batondisaki bitunga zomi na mibale ya oyo etikalaki na mapa mitano oyo baliaki.
14
Tango bato bamonaki likamwisi oyo Yesu asalaki, babandaki koloba: —Moto oyo azali penza Moprofeta oyo asengeli koya na mokili.
15
Awa Yesu ayebaki ete balingaki koya mpe kokomisa ye mokonzi na makasi, azongaki lisusu ye moko kaka, na ngomba.
16
Tango pokwa ekomaki, bayekoli na ye bakendaki na ebale.
17
Bamataki na bwato mpe babandaki kokende na Kapenawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekomaki, mpe Yesu akomaki naino te epai na bango.
18
Mopepe moko ya makasi penza ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki.
19
Awa basilaki koluka nkayi bakilometele soki mitano to motoba, bamonaki Yesu azalaki kotambola likolo ya mayi mpe azalaki kopusana pene-pene na bwato; kobanga ekangaki bango.
20
Kasi Yesu alobaki na bango: —Bobanga te, ezali ngai!
21
Balingaki kokotisa ye na bwato, kasi kaka na tango wana, bwato ekomaki na libongo, epai bazalaki kokende.
22
Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayebaki ete bwato moko kaka ezalaki wana, mpe Yesu akotaki kati na yango te elongo na bayekoli na ye, kasi bayekoli bakendaki kaka bango moko.
23
Bongo babwato mosusu oyo ewutaki na Tiberiade ekomaki wana, pene-pene na esika oyo balielaki mapa, tango Nkolo azongisaki matondi.
24
Tango bato bamonaki ete Yesu na bayekoli na ye bazalaki wana te, bamataki na babwato mpe bakendaki na Kapenawumi mpo na koluka Yesu.
25
Awa bakutaki ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki ye: —Moteyi, okomaki awa tango nini?
26
Yesu azongiselaki bango: —Ya solo penza nalobi na bino: bozali koluka ngai kaka mpo boliaki mapa mpe botondaki mingi, kasi ezali te mpo bomonaki makamwisi.
27
Bosalaka mosala te mpo na bilei oyo ekobeba, kasi bosalaka mosala mpo na bilei oyo ekowumela kino na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na moto akopesa bino pamba te Nzambe Tata atia ye elembo.
28
Bongo batunaki ye: —Esengeli tosala nini mpo tosala misala ya Nzambe?
29
Yesu azongiselaki bango: —Mosala ya Nzambe yango oyo: kondimela moto oyo ye atindaki.
30
Batunaki ye: —Elembo nini ya kokamwisa okosala mpo tokoka komona yango mpe tondima yo? Okosala nini?
31
Bakoko na biso baliaki mana na esobe, ndenge ekomama: Apesaki bango mapa oyo ewutaki na Likolo.
32
Yesu alobaki na bango: —Ya solo penza nalobi na bino: ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ewutaki na Likolo, kasi ezali Tata na ngai moto apesi bino lipa ya solo oyo ewuti na Likolo.
33
Pamba te, lipa ya Nzambe ezali moto oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka bomoi na mokili.
34
Bongo balobaki na ye: —Nkolo, pesaka biso lipa yango mikolo nyonso!
35
Yesu azongiselaki bango: —Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto oyo akoya epai na ngai akoyoka lisusu nzala te; mpe oyo akondima ngai, akoyoka lisusu posa ya mayi te.
36
Kasi ndenge nayebisaki bino: bosiʼbomona ngai, kasi bozali kondima te.
37
Bato nyonso oyo Tata apesi ngai, bakoya epai na ngai; mpe nakobengana soki moke te moto oyo akoya epai na ngai.
38
Pamba te soki nakiti wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki ngai.
39
Nzokande, mokano ya Ye oyo atindaki ngai ezali boye: nabungisa ata moto moko te na kati ya bato oyo apesaki ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka.
40
Pamba te mokano ya Tata na ngai ezali boye: moto nyonso oyo akotala Mwana mpe akondima ye, akozwa bomoi ya seko; mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
41
Bayuda babandaki koyima-yima, mpo alobaki: “Ngai nazali lipa oyo ewuti na Likolo!”
42
Bongo bazalaki koloba: —Boni, wana ezali Yesu te, mwana ya Zozefi, oyo toyebi tata na ye mpe mama na ye? Bongo ndenge nini azali koloba: “Nawuti na Likolo?”
43
Yesu azongiselaki bango: —Botika koyima-yima kati na bino!
44
Pamba te, moto moko te akoki koya epai na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai abendi ye te; mpe ngai, nakosekwisa ye na mokolo yasuka.
45
Ekomama boye na Mikanda ya baprofeta: Nzambe akoteya bango nyonso. Yango wana, moto nyonso oyo akoyoka Tata mpe akoyamba mateya na ye, akoya epai na ngai.
46
Moto ata moko te asiʼamona Tata, longola kaka ye oyo awuti epai ya Nzambe; ye nde amona Tata.
47
Ya solo nalobi na bino: moto oyo andimi, azali na bomoi ya seko.
48
Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi.
49
Bakoko na bino baliaki mana na esobe, basiʼbakufa.
50
Kasi lipa oyo ewuti na Likolo ezali awa: moto oyo akolia yango akokufa te.
51
Ngai nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo. Soki moto alie lipa yango, akozala na bomoi seko na seko. Lipa yango ezali nde nzoto na ngai, oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi!
52
Bongo Bayuda babandaki kotiana tembe bango na bango, bazalaki koloba: —Ndenge nini akoki kopesa biso nzoto na ye mpo tolia yango?
53
Kasi Yesu alobaki: —Ya solo penza nalobi na bino, soki bolie nzoto ya Mwana ya Moto te mpe soki bomeli makila na ye te, bokoki kozwa bomoi te.
54
Oyo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, akozwa bomoi ya seko mpe nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
55
Pamba te, nzoto na ngai ezali bileyi ya solo, mpe makila na ngai ezali eloko ya komela ya solo.
56
Oyo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, ye akozala kati na ngai, mpe ngai nakozala kati na ye.
57
Lokola Tata oyo atindi ngai azali na bomoi, ngai mpe nazali na bomoi mpo na ye; yango wana moto oyo akolia ngai, akozala na bomoi mpo na ngai.
58
Oyo ezali lipa ewuti na Likolo. Ekokani te na oyo bakoko na bino baliaki mpe bakufaki; kasi moto oyo akolia lipa oyo, akozala na bomoi seko na seko.
59
Yesu alobaki makambo oyo tango azalaki koteya na Ndako ya mayangani, na Kapenawumi.
60
Bayekoli mingi ya Yesu, sima ya koyoka ye, balobaki: —Mateya oyo ekomi makasi. Nani akoki kondima yango?
61
Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki koyima-yima mpo na yango; bongo alobaki na bango: —Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku?
62
Bongo soki bomoni Mwana na moto azali kobuta mpo na kozonga epai ye azalaki liboso…
63
Boyeba ete, Molimo nde apesaka bomoi; nzoto esungaka na eloko moko te. Maloba oyo nalobi na bino, yango nde ezali Molimo mpe ezali bomoi.
64
Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Pamba te, banda na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka ye.
65
Bongo alobaki lisusu: —Yango wana nalobaki na bino: moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te!
66
Banda tango wana, bayekoli na ye mingi batikaki ye mpe bazalaki kolanda ye lisusu te.
67
Bongo Yesu atunaki bapostolo zomi na mibale: —Bongo bino, bolingi mpe kokende?
68
Simon Piere azongisaki: —Nkolo, tokende epai ya nani? Yo moto ozali na maloba oyo epesaka bomoi ya seko.
69
Biso tondimaka mpe toyebi ete yo ozali Mosantu ya Nzambe!
70
Yesu alobaki na bango: —Boni, ngai te moto naponaki bino nyonso zomi na mibale? Kasi moko na bino azali zabolo!
71
Yesu alobaki bongo mpo na Yuda, mwana ya Simon Iskariote, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale pamba te ye moto akoteka ye.
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 7 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21