bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 21
John 21
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 20
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
1
Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Abimelaki bango boye:
2
Simon Piere, Toma (oyo babengaka: “Lipasa”), Natanayele (ya mboka Kana na mokili ya Galileya), bana ya Zededeo, mpe bayekoli mibale mosusu bazalaki esika moko.
3
Simon Piere alobaki na bango: —Nakei koluka bambisi! Bango mpe balobaki na ye: —Biso mpe, tokokende elongo na yo. Bakendaki mpe bamataki na bwato; kasi butu wana bazwaki eloko moko te.
4
Na tongo-tongo penza, Yesu atelemaki na libongo; kasi bayekoli bayebaki te ete ezalaki ye.
5
Bongo abengaki bango: —E e bana! bozwi mbisi? Bazongiselaki ye: —Te!
6
Yesu alobaki na bango: —Bobwaka monyama na loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa! Tango babwakaki yango, bakokaki kobenda yango te, pamba te etondaki na bambisi ebele penza.
7
Bongo Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Piere: —E e! ezali Nkolo. Tango Simon Piere ayokaki ete ezali Nkolo, alataki elamba na yeya likolo, (mpo alongolaki yango), mpe amibwakaki na mayi.
8
Bongo bayekoli mosusu balandaki kati na bwato, mpe bazalaki kobenda monyama oyo etondaki na bambisi, pamba te bazalaki mosika te na mokili, ezalaki pene-pene ya bametele nkama moko.
9
Tango bakitaki na mokili, bamonaki moto ya makala, mpe mbisi likolo na yango, na lipa.
10
Yesu alobaki na bango: —Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kokanga!
11
Simon Piere amataki na bwato, mpe abendaki monyama na mokili. Yango ezalaki ya kotonda na bambisi nkama moko na tuku mitano na misato ya minene. Atako ezalaki mingi, kasi monyama epasukaki te.
12
Bongo yesu alobaki na bango: —Boya mpe bolia. Mpe moyekoli ata moko te amekaki kotuna ye: “Ozali nani?” pamba tebayebaki ete ezali Nkolo.
13
Yesu apusanaki pembeni na bango, akamataki lipa mpe apesaki bango; asalaki mpe ndenge moko mpo na mbisi.
14
Wana ezalaki mbala ya misato oyo Yesu abimelaki bayekoli na ye, sima ya kosekwa na ye kati na bakufi.
15
Tango basilisaki kolia, Yesu alobaki na Simon Piere: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai mingi koleka bango? Ye azongiselaki ye: —E e Nkolo! oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bana meme na ngai!
16
Bongo alobaki na ye mpo na mbala ya mibale: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai? Azongiselaki ye: —E e Nkolo! Oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bameme na ngai!
17
Bongo Yesu alobaki na ye lisusu mpo na mbala ya misatu: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai? Piere ayokaki mawa mingi na motema, pamba te Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato: “Olingaka ngai?” Bongo azongiselaki ye: —Nkolo, oyebi makambo nyonso, oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bameme na ngai!
18
Nazali koloba na yo ya solo penza: tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga mokaba na yo yo moko, mpe ozalaki kokende esika yo moko ozalaki kolinga; kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe moto mosusu nde akokanga yo mokaba, mpe akomema yo epai yo okolinga te!
19
Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya liwa oyo Piereasengelaki kokufa na yango mpo na nkembo ya Nzambe. Sima ya kolobabongo, alobaki na Piere: —Landa ngai!
20
Piere atalaki na sima, mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi azalaki kolanda bango; ezali moyekoli oyo mpe, tango bazalaki kolia, apusanaki pene-pene ya Yesu, mpe atunaki ye: “Nkolo, nani akoteka yo?”
21
Tango Piere amonaki ye, atunaki Yesu: —Nkolo, okanisi nini mpo na ye?
22
Yesu azongiselaki ye: —Soki nalingi ete azala na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo? Kasi yo, landa ngai.
23
Sango yango epanzanaki na kati ya bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te; kasi alobaki: “Soki nalingi ete azala na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo?”
24
Ezali moyekoli wana nde azali kotatola makambo oyo, mpe akomaki yango. Mpe toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.
25
Yesu asalaki lisusu makambo mingi mosusu. Soki bakomaki yango moko na moko na mikanda, na kanisi, mbele ata mokili ekokaki te kobomba babuku oyo elingaki kokomama.
← Chapter 20
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21