bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 13
John 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 14 →
1
Ezalaki liboso ya feti ya Pake. Yesu ayebaki ete tango ya kolongwa na mokili oyo mpo na kokende epai ya Tata ekokaki. Tango nyonso azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki kati na mokili, mpe alingaki bango kino na suka!
2
Tango bazalaki kolia; Zabolo asiʼakotaki na motema ya Yuda Isikariote, mwana ya Simon, mpo na koteka Yesu.
3
Yesu ayebaki ete Tata atiaki makambo nyonso na nse ya nguya na ye, mpe awutaki epai ya Nzambe mpe akozonga epai ya Nzambe.
4
Alongwaki na mesa na tango bazalaki kolia, alongolaki elamba oyo alataki likolo, bongo akamataki elamba oyo bapanguselaki mayi mpe akangaki yango na loketo na ye.
5
Na sima, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na ye, bongo azalaki kopangusa yango na elamba oyo bapanguselaka mayi oyo akangaki na loketo.
6
Tango akomaki epai ya Simon Piere, ye alobaki na ye: —Nkolo, yo olingi kosukola ngai makolo?
7
Yesu azongiselaki ye: —Likambo nazali kosala, ozali kososola yango te sikʼoyo, kasi okososola yango sima!
8
Kasi Piere alobaki na ye: —Te! Okosukola ngai makolo te! Yesu azongiselaki ye: —Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu moyekoli na ngai te!
9
Simon Piere alobaki na ye: —Nkolo, soki bongo, osukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai mpe maboko na motu!
10
Yesu alobaki na ye: —Moto oyo basukoli nzoto mobimba, azali na posa kaka ya kosukola makolo; nzoto na ye mobimba ezali peto. Mpe bino, bozali peto, kasi bino nyonso te.
11
Pamba te Yesu ayebaki moto oyo akoteka ye. Yango wana alobaki: “Bino nyonso bozali peto te!”
12
Tango asilisaki kosukola bango makolo, alataki elamba na ye mpe ayaki lisusu kovanda na mesa; bongo alobaki na bango: —Boni, bososoli likambo oyo nasali bino?
13
Bino bobengaka ngai Moteyi mpe Nkolo, ya solo bolobaka malamu, pamba te nazali bongo.
14
Bongo soki ngai Moteyi mpe Nkolo nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino.
15
Pamba te napesi bino ndakisa, mpo bosalaka mpe ndenge ngai nasali bino.
16
Nazali koloba na bino ya solo penza: mosali aleki mokonzi na ye te, mpe motindami aleki te moto oyo atindaki ye.
17
Lokola boyebi makambo oyo, bozali bato na esengo soki bosaleli yango.
18
Nazali koloba mpo na bino nyonso te; nayebi baoyo ngai napona. Kasi esengeli ete Makomi ekokisama, oyo ezali koloba: Moto oyo azali kolia lipa elongo na ngai, abalukeli ngai!
19
Nayebisi bino likambo yango sikʼoyo, liboso ete yango esalama, mpo ete tango yango ekosalama, bondima ete “Ngai nazali oyo nazali.”
20
Nazali koloba na bino ya solo penza, moto oyo ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi ngai; mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.
21
Sima ya koloba bongo, Yesu ayokaki pasi mingi na motema, mpe alobaki: —Nazali koloba na bino ya solo penza, moto moko na kati na bino akoteka ngai!
22
Bayekoli babandaki kotalana moko na moko, mpe bayebaki te soki alobaki bongo mpo na nani.
23
Moko na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi, azalaki na mesa pene-pene na Yesu.
24
Bongo Simon Piere asalaki mwa elembo na moyekoli wana mpo atuna soki alobaki bongo mpo na nani.
25
Bongo moyekoli yango alalaki moke na ntolo ya Yesu mpe atunaki ye: —Nkolo, nani yango?
26
Yesu azongisaki: —Ezali moto oyo nakopesa ndambo ya lipa sima ya kodindisa yango na supu. Bongo, adindisaki ndambo ya lipa na supu, mpe apesaki yango na Yuda Isikariote mwana ya Simon.
27
Na tango kaka Yuda azwaki lipa wana, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye: —Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki!
28
Kasi moto ata moko te na baoyo bazalaki na mesa, asosolaki soki mpo na nini Yesu alobaki na ye bongo.
29
Lokola Yuda azalaki kobomba mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye akende kosomba biloko ya feti, to mpe apesa lisalisi na babola.
30
Awa Yuda azwaki lipa wana, abimaki kaka na tango wana. Ezalaki butu.
31
Tango Yuda akendaki, Yesu alobaki: —Sikʼoyo nkembo ya Mwana na Moto emonani polele, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na ye.
32
Soki Nzambe azwi nkembo kati na ye, Nzambe ye moko mpe akopesa Mwana nkembo kati na ye moko, mpe akosala yango noki penza.
33
Bana na ngai, nazali naino na bino elongo kaka mpo na mwa tango moke. Bokoluka ngai; kasi nalobi na bino sikʼoyo ndenge nalobaki na bayuda: Bokokoka te kokende epai ngai nazali kokende!
34
Mobeko ya sika oyo napesi bino, yango oyo: Bolingana bino na bino. Ndenge ngai nalingaka bino, bino mpe bolingana bino na bino.
35
Soki bolingani bino na bino, na ndenge wana nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai!
36
Simon Piere atunaki ye: —Nkolo, ozali kokende wapi? Yesu azongiselaki ye: —Okokoka te kolanda ngai sikʼoyo epai nazali kokende, kasi okolanda ngai sima.
37
Piere alobaki na ye lisusu: —Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda yo sikʼoyo? Nazali ya komibongisa mpo na kokufa mpo na yo!
38
Yesu azongiselaki ye: —Ozali ya komibongisa penza mpo na kokufa mpo na ngai? Nalobi na yo ya solo penza: liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato!
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21