bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 14
John 14
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 13
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 15 →
1
Tika ete mitema na bino etungisama te. Bondimelaka Nzambe, bondimela mpe ngai.
2
Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi, mpe nakeyi kobongisela bino esika. Soki ezalaki bongo te, mbele nalingaki koyebisa bino yango.
3
Mpe soki nakeyi mpe nabongiseli bino esika, bongo nakoya lisusu mpe nakokamata bino elongo na ngai, mpo ete bozala epai ngai nakozala.
4
Kasi bino boyebi nzela ya esika oyo ngai nazali kokende.
5
Toma alobaki na ye: —Nkolo, toyebi te epai ozali kokende; bongo ndenge nini tokoki koyeba nzela yango?
6
Yesu azongiselaki ye: —Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata soki aleki na nzela na ngai te.
7
Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki mpe boyeba Tata na ngai. Mpe banda sikʼoyo boyebi ye, mpe bomoni ye!
8
Filipi alobaki na ye: —Nkolo, lakisa biso Tata, mpe tokozala lisusu na posa ya eloko moko te.
9
Yesu azongiselaki ye: —A a Filipi, banda kala nazali na bino elongo, mpe oyebaka ngai te? Moto oyo amoni ngai, amoni Tata. Bongo mpo na nini ozali koloba: “Lakisa biso Tata?”
10
Ondimi te ete ngai nazali kati na Tata mpe Tata azali kati na ngai? Maloba oyo nalobaka na bino, ewutaka na ngai moko te. Kasi Tata, ye oyo avandaka kati na ngai, ye moto azali kosala misala na ye.
11
Bondimela ngai ete nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na ngai. Soki bongo te, bondima ata mpo na misala oyo nazali kosala.
12
Nalobi na bino ya solo penza: moto oyo akondimela ngai, akosala mpe misala oyo nazali kosala. Akosala kutu makambo minene koleka oyo ya ngai, pamba te nazali kokende epai ya Tata.
13
Mpe makambo nyonso oyo bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango mpo ete Tata azwa nkembo kati na Mwana.
14
Soki bosengi eloko na kombo na ngai, nakosala yango!
15
—Soki bolingaka ngai, bobatela mitindo na ngai.
16
Bongo ngai nakobondela Tata, mpe ye akopesa bino Mosungi mosusu, mpo azala na bino tango nyonso:
17
ye azali Molimo ya bosolo, oyo mokili akoki kozwa te, mpo bamoni ye naino te mpe bayebi ye te. Kasi bino boyebi ye, pamba te azali elongo na bino, mpe akozala kati na bino.
18
Nakotika bino lokola bana bitike te; nakozongela bino.
19
Etikali mwa tango moke, mokili ekomona ngai lisusu te; kasi bino, bokomona ngai, pamba te nazali na bomoi, mpe bino mpe bokozala na bomoi.
20
Na mokolo yango, bokososola ete ngai nazali kati na Tata na ngai, bino bozali kati na ngai, mpe ngai nazali kati na bino.
21
Moto oyo andimi mitindo na ngai mpe azali kobatela yango, ye nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye; ngai mpe nakolinga ye, mpe nakomimonisa epai na ye!
22
Bongo Yuda (kasi Isikariote te) atunaki: —Nkolo, mpo na nini okomimonisa na biso, kasi na mokili te?
23
Yesu azongiselaki ye: —Soki moto alingi ngai, akobatela Liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. Bongo tokoya epai na ye mpe tokosala evandelo na biso epai na ye.
24
Moto oyo alingaka ngai te, abatelaka mpe maloba na ngai te. Mpe Liloba oyo bozali koyoka ezali ya ngai te, kasi ezali ya Tata oyo atinda ngai.
25
Nayebisi bino makambo oyo tango nazali naino elongo na bino.
26
Kasi Mosungi, Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na kombo na ngai, Ye akoteya bino makambo nyonso, mpe akokanisela bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.
27
Natikeli bino kimia; napesi bino kimia na ngai; napesi bino yango te ndenge mokili epesaka. Botika mitema na bino emitungisa te mpe bobanga te.
28
Boyokaki ete nalobaki na bino: Nakokende, mpe nakozongela bino. Soki bolingaki ngai, mbele bolingaki kosepela awa nazali kokende epai ya Tata; pamba te Tata na ngai aleki ngai na monene.
29
Nayebisi bino makambo yango sikʼoyo, awa yango esalami naino te, mpo ete tango yango ekosalama, bondima.
30
Nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya, mpe azali na nguya moko te likolo na ngai;
31
kasi nakosala ndenge Tata atindaki ngai mpo ete mokili ekoka koyeba ete nalingaka Tata. Botelema, tolongwa awa!
← Chapter 13
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 15 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21