bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 4
John 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 5 →
1
Bafarizeo bayokaki ete Yesu azalaki kozwa mpe kobatisa bayekoli ebele koleka Jean.
2
(Nzokande Yesu ye moko azalaki kobatisa te, kasi bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa).
3
Tango Nkolo ayokaki bongo, alongwaki na Yudea, mpe azongaki na Galileya.
4
Kasi esengelaki na ye aleka na Samariya.
5
Bongo akomaki na vile moko ya Samariya, kombo na yango Sishare, oyo ezalaki pene-pene na elanga oyo Yakobi apesaki na mwana na ye Zozefi.
6
Libulu ya mayi ya Yakobi ezalaki kuna. Yesu alembaki mpo na mobembo, mpe avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene-pene ya ngonga midi.
7
Mwasi moko ya Samariya ayaki kotoka mayi, bongo Yesu alobaki na ye: —Pesa ngai mayi ya komela!
8
(Bayekoli na ye bakendaki na vile mpo na kosomba biloko ya kolia).
9
Kasi mwasi ya Samariya alobaki na ye: —Yango ebandi boni? Yo Moyuda osenga ngai mwasi ya Samariya mayi ya komela? (Alobaki bongo pamba te, Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samariya).
10
Yesu azongiselaki ye: —Soki oyebaki likabo ya Nzambe, mpe nani oyo azali kosenga yo mayi, mbele yo moto olingaki kosenga ye mayi ya komela, mpe alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
11
Mwasi alobaki na Yesu: —Tata, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo! Bongo mayi yango ya bomoi okozwa yango wapi?
12
Boni, yo oleki koko na biso Yakobi oyo apesaki biso libulu oyo; ye moko amelaki mayi na yango, na bana na ye, mpe na bibwele na ye?
13
Yesu azongiselaki ye: —Moto nyonso oyo ameli mayi oyo, akoyoka lisusu posa ya mayi.
14
Kasi oyo akomela mayi oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu posa ya mayi te. Mpe mayi oyo ngai nakopesa ye, ekozala kati na ye esika oyo mayi ekobanda kobimaka tango nyonso, kino na bomoi ya seko.
15
Bongo mwasi alobaki na ye: —Tata, pesa ngai mayi yango, mpo nayoka lisusu posa ya mayi te, mpe nayaka awa te mpo na kotoka mayi.
16
Yesu alobaki na ye: —Kende, benga mobali na yo, mpe zonga awa!
17
Mwasi azongisaki: —Nazali na mobali te! Yesu alobaki na ye: —Olobi ya solo ete ozali na mobali te.
18
Pamba te ozalaki na mibali mitano, mpe mobali oyo ozali na ye sikʼoyo, azali mpe mobali na yo te. Likambo olobi ezali ya solo.
19
Bongo mwasi alobi na ye: —Tata, namoni ete ozali moprofeta.
20
Bakoko na biso bato ya Samariya basambelaki Nzambe na ngomba oyo! Kasi bino Bayuda bolobaka ete esika oyo tosengeli kosambela ezali na Yeruzalem.
21
Yesu azongiselaki ye: —Mwasi, ndimela ngai: tango ezali koya oyo bokosambela Tata, na ngomba oyo te to mpe na Yeruzalem te.
22
Bino bato ya Samariya bosambelaka oyo boyebi te; kasi biso tosambelaka oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti na Bayuda.
23
Kasi tango ezali koya mpe yango esiʼekomi, oyo basamopanga ya solo bakosambela Tata na Molimo mpe na solo; pamba te, Tata alukaka bato oyo basambelaka ye na ndenge wana.
24
Nzambe azali Molimo, mpe esengeli ete baoyo basambelaka ye, basambela ye na molimo mpe na solo.
25
Mwasi alobaki na ye: —Nayebi ete Masiya akoya, (ye oyo babengaka Kristo). Mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
26
Yesu alobaki na ye: —Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali Masiya!
27
Bayekoli na ye bazongaki kaka na tango wana. Bakamwaki mingi awa bamonaki ete Yesu azalaki kosolola na mwasi. Kasi ata moto moko te na kati na bango amekaki kotuna ye: “Olingi nini?” to mpe “Mpo na nini ozali kosolola na ye?”
28
Mwasi atikaki eloko na ye wana, azongaki na vile, mpe alobaki na bato:
29
—Boya kotala moto moko ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaka. Boni, akoki kozala Kristo te?
30
Bato babimaki na vile mpe bakendaki epai ya Yesu.
31
Na tango wana, bayekoli bazalaki kobondela Yesu mpe bazalaki koloba: —Moteyi, lia!
32
Kasi Yesu ayebisaki bango: —Nazali na bilei oyo bino boyebi te.
33
Bongo bayekoli balobanaki bango na bango: —Boni, moto amemelaki ye biloko ya kolia?
34
Yesu alobaki na bango: —Bilei na ngai, yango oyo: kosala mokano ya Ye oyo atindaki ngai, mpe kosilisa mosala na ye.
35
Bino bolobaka ete etikali sanza minei mpo tobuka mbuma na bilanga! Kasi ngai nalobi na bino: Botombola miso mpe botala bilanga! Pamba te mbuma esiʼekomeli mpe ekoki mpo na kobuka!
36
Moto oyo abukaka azwaka lifuti, mpe azali kobomba bambuma mpo na bomoi ya seko. Mpo ete moloni mpe mobuki mbuma basepela elongo.
37
Na boye nde lisese oyo emonani ete ezali ya solo: “Moto mosusu nde alonaka, mpe mosusu nde abukaka.”
38
Natindaki bino bokende kobuka mbuma na elanga oyo bino bomonelaka pasi te. Bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali kobuka mbuma ya mosala na bango.
39
Bato mingi ya Samariya ya vile wana bandimaki Yesu mpo na litatoli ya mwasi oyo alobaki: “Ayebisi ngai makambo nyonso nasalaki.”
40
Tango bato ya Samariya bayaki epai ya Yesu, babondelaki ye mpo avanda elongo na bango. Bongo Yesu avandaki na bango mikolo mibale.
41
Bato mingi mosusu bandimaki mpo na maloba na ye.
42
Bongo bato yango balobaki na mwasi wana: —Tondimeli ye kaka te mpo na makambo oyo oyebisaki biso, kasi mpo biso moko toyoki ye mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili!
43
Sima ya mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendaki na Galileya.
44
Pamba te ye moko Yesu alobaki ete moprofeta azwaka lokumu te na ekolo na ye moko!
45
Tango akomaki na Galileya, bato ya Galileya bayambaki ye mpo bamonaki makambo nyonso oyo ye asalaki na Yeruzalem, na tango ya feti; pamba te bango mpe bakendaki na feti.
46
Bongo Yesu ayaki lisusu na Kana na Galileya, epai abongolaki mayi vino. Mokonzi moko ya leta azalaki na Kapenawumi, mwana na ye ya mobali azalaki maladi.
47
Tango ayokaki ete Yesu alongwaki na Yudea mpe akomaki na Galileya, akendaki kokutana na ye, mpe abondelaki ye mpo akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo azalaki pene ya liwa.
48
Yesu alobaki na ye: —Boni, soki bomoni bilembo te mpe makamwisi te bokoki kondima te?
49
Mokonzi wana alobaki: —Tata, yaka liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa!
50
Bongo Yesu alobaki na ye: —Kende, mwana na yo ya mobali azali nzoto kolongonu! Moto yango andimaki maloba ya Yesu mpe azongaki.
51
Tango azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye, mpe balobaki na ye: “Mwana na yo ya mobali azali nzoto kolongonu”.
52
Bongo atunaki bango soki na ngonga nini mwana akomaki malamu. Bango bazongisaki: —Fievre etikaki ye lobi na ngonga ya liboso sima ya midi.
53
Tata ya mwana ayebaki ete ezalaki kaka na tango wana nde Yesu alobaki na ye ete mwana na yo azali nzoto kolongonu. Bongo ye na bato nyonso ya ndako na ye, bandimaki.
54
Oyo ezali likamwisi ya mibale Yesu asalaki, sima ya kozonga na ye na Galileya wuta na Yudea.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21