bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 2
John 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 3 →
1
Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na Kana na Galileya. Mama ya Yesu azalaki kuna.
2
Yesu na bayekoli na ye babengamaki mpe na feti yango.
3
Tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Yesu: —Bazali lisusu na vino te!
4
Kasi Yesu azongiselaki ye: —Mwasi, biso na yo likambo nini? Tango na ngai naino ekoki te?
5
Bongo mama na ye alobaki na basali: —Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
6
Biloko motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Eloko moko na moko ekokaki kokota bisangala mwambe to zomi na mibale.
7
Bongo Yesu alobaki na basali: —Botondisa biloko oyo na mayi. Mpe, batondisaki yango kino na motu.
8
Yesu alobaki na bango: —Sikʼoyo botoka mpe bomemela mokambi ya feti. Bongo bamemelaki ye yango.
9
Mokambi ya feti amekaki mayi oyo ebongwanaki vino. Ayebaki te soki vino yango ewutaki wapi, kasi basali oyo batokaki mayi, bango nde bayebaki. Bongo mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki,
10
mpe alobaki na ye: —Bato nyonso bapesaka liboso vino ya kitoko, bongo soki bato bameli mingi, sima bapesaka bango oyo ya mwa kitoko; kasi yo obombi vino ya kitoko kino sikʼoyo.
11
Oyo nde likamwisi ya liboso Yesu asalaki: asalaki yango na Kana na Galileya. Na bongo nde amonisaki nkembo na ye; mpe bayekoli na ye bandimaki ye.
12
Sima na yango, Yesu akendaki na Kapenawumi na mama na ye, na bandeko na ye, mpe na bayekoli na ye. Bavandaki kuna kaka mwa mikolo.
13
Lokola feti ya Pake ekomaki pene-pene, Yesu akendaki na Yeruzalem.
14
Akutaki na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe, bato oyo batekaka bangombe, bameme mpe bapijon, elongo na bato oyo basanzaka mbongo bavandaki na bamesa na bango.
15
Bongo asalaki fimbo ya bansinga, mpe abenganaki bango nyonso na lopango ya Ndako ya Nzambe, na bangombe, mpe bameme. Abwakaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, apanzaki mpe mbongo na bango.
16
Bongo alobaki na bato oyo bazalaki koteka bapijon: —Bolongola biloko oyo awa! Bokomisa Ndako ya Tata na ngai, ndako ya mombongo te!
17
Bongo bayekoli na ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama: E e Nzambe, bolingo oyo nazali na yango mpo na Ndako na yo, yango nde ezali kozikisa ngai!
18
Bongo Bayuda bapesaki ye eyano mpe balobaki na ye: —Likamwisi nini okoki kosala mpo na kolakisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala bongo?
19
Yesu azongiselaki bango: —Boboma Ndako ya Nzambe oyo, mpe nakotonga yango lisusu na mikolo misato!
20
Bongo Bayuda balobaki: —Nini? Bato oyo batongaki Ndako oyo basalaki bambula ntuku minei na motoba, bongo yo olobi okotonga yango na mikolo misato!
21
Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yesu alobaki, ezalaki nzoto na ye moko.
22
Sima ya kosekwa ya Yesu kati na bakufi, nde bayekoli na ye bakanisaki ete ye alobaki bongo; bongo bandimelaki makambo oyo ekomama, mpe maloba oyo Yesu alobaki.
23
Tango Yesu azalaki na Yeruzalem mpo na feti ya Pake, bato mingi bandimaki ye mpo bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala.
24
Kasi Yesu atielaki bango mitema te, pamba te ayebaki bango nyonso;
25
Mpe azalaki na posa te ete bayebisa ye makambo oyo ezalaka na bato, pamba te ye moko ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki na mitema ya bato.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21