bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 11
John 11
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 10
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 12 →
1
Moto moko kombo na ye Lazare azalaki maladi; azalaki moto ya mboka Betaniya, mboka ya Mariya mpe ya ndeko na ye Marta.
2
Mariya azali mwasi oyo apakolaki Nkolo malasi, mpe apangusaki ye makolo na suki na ye; ezali ye nde ndeko na ye Lazare azalaki maladi.
3
Bandeko ya Lazare ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu: —Nkolo, ye oyo olingaka azali maladi.
4
Tango Yesu ayokaki Sango yango, alobaki: —Maladi oyo ekoboma ye te kasi yango ekopesa Nzambe nkembo, mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa nkembo.
5
Nzokande, Yesu azalaki kolinga Marta, na ndeko na ye ya mwasi, mpe Lazare.
6
Tango Yesu ayokaki ete Lazare azali maladi, avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo ye azalaki;
7
bongo alobaki na bayekoli na ye: —Tozonga na Yudea!
8
Bayekoli balobaki na ye: —Moteyi, kala mingi te Bayuda balingaki koboma yo na mabanga, bongo olingi lisusu kozonga kuna!
9
Yesu azongisaki: —Boni, mokolo mobimba ezali na bangonga zomi na mibale te? Soki moto atamboli na moi, akobeta libaku te, pamba te azali komona mwinda ya mokili oyo.
10
Nzokande soki moto atamboli na butu, akobeta libaku pamba te mwinda ezali kati na ye te.
11
Sima ya koloba bongo, alobaki na bango lisusu: —Moninga na biso Lazare alali pongi; kasi nakokende kolamusa ye!
12
Bayekoli bazongiselaki ye: —Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika!
13
Nzokande Yesu alobaki mpo na liwa na ye; kasi bayekoli bakanisaki ete alobaki kaka mpo na pongi oyo tolalaka.
14
Bongo Yesu alobaki na bango polele: —Lazare akufi!
15
Mpe nazali na esengo mingi penza mpo na bino, lokola nazalaki kuna te, mpo ete bokoka kondima. Kasi tika tokende epai na ye!
16
Bongo Toma oyo babengaka lipasa, alobaki na bayekoli mosusu: —Biso mpe tokende, mpo tokufa na ye elongo!
17
Tango Yesu akomaki, akutaki ete banda bakundaki Lazare na lilita, yango ekokisaki mikolo minei.
18
Betaniya ezalaki pene-pene na Yeruzalem na bakilometele pene-pene misato.
19
Bayuda mingi bayaki epai ya Mariya mpe Marta mpo na kolongola bango mawa mpo na liwa ya ndeko na bango.
20
Tango Marta ayokaki ete Yesu azalaki koya, akendaki kokutana na ye, kasi Mariya atikalaki na ndako.
21
Marta alobaki na Yesu: —Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki te!
22
Kasi nayebi ete ata sikʼoyo, Nzambe akopesa yo nyonso oyo okosenga ye!
23
Yesu alobaki na ye: —Ndeko na yo akosekwa!
24
Marta azongiselaki ye: —Nayebi ete akosekwa, tango bato bakosekwa, na mokolo ya suka!
25
Yesu alobaki na ye: —Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo akondima ngai, akozala na bomoi, atako soki akufi.
26
Mpe moto nyonso oyo azali na bomoi, soki andimeli ngai, akokufa seko te! Ondimi yango?
27
Marta azongiselaki ye: —E e Nkolo! Nandimi ete ozali Kristo, Mwana na Nzambe, oyo azali koya na mokili!
28
Tango asilisaki koloba bongo, akendaki kobenga ndako na ye Mariya mpe alobaki na ye na mongongo ya nse penza: —Moteyi asiʼaye, azali kobenga yo!
29
Awa Mariya ayokaki bongo, atelemaki mbangu mpe akendaki epai ya Yesu.
30
Nzokande Yesu akotaki naino te na mboka, azalaki kaka na esika oyo Marta akutanaki na ye.
31
Bayuda oyo bazalaki na Mariya na kati ya ndako mpo na kolongola ye mawa, tango bamonaki ete Mariya atelamaki mbangu mpe abimaki libanda, balandaki ye, mpo bakanisaki ete akei kolela na lilita.
32
Tango Mariya akomaki esika Yesu azalaki mpe amonaki ye, amibwakaki na makolo ya Yesu, mpe alobaki na ye: —Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki te!
33
Tango Yesu amonaki ete Mariya mpe bayuda oyo bayaki na Mariya bazalaki kolela, ayokaki mawa mingi na nse ya motema, mpe amitungisaki mingi.
34
Atunaki bango: —Bokundaki ye wapi? Bazongiselaki ye: —Nkolo, yaka mpe omona!
35
Yesu alelaki.
36
Bongo bayuda balobaki: —Tala, alingaki ye mingi penza!
37
Kasi basusu kati na bango balobaki: —Ye moto afungolaki miso ya mokufi miso, akokaki te kosala nyonso ete Lazare akufa te?
38
Yesu ayokaki lisusu mawa mingi na motema, mpe akomaki na lilita. Libulu yango ezalaki na kati ya mabanga, mpe libanga ezalaki likolo ya monoko na yango.
39
Yesu alobi na bango: —Bolongola libanga! Kasi Marta ndeko ya mokufi alobi na ye: —Nkolo, asiʼabandi kolumba solo, pamba te banda akundama, esiʼesali mikolo minei!
40
Yesu alobaki na ye: —Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo na Nzambe?
41
Bongo balongolaki libanga. Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki: —Tata, natondi yo mpo oyoki ngai.
42
Nayebi ete oyokaka ngai tango nyonso; kasi nalobi boye mpo na ebele ya bato oyo bazali pembeni-pembeni na ngai, mpo ete bandima ete yo moto otindaki ngai!
43
Sima ya maloba wana, Yesu agangaki na mongongo makasi: Lazare bima!
44
Bongo mokufi abimaki na lilita; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na bilamba, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na kitendi. Yesu alobaki na bango: —Bofungola ye mpe botika ye akende!
45
Bayuda mingi oyo bayaki epai ya Mariya, tango bamonaki oyo Yesu asalaki, bandimaki ye.
46
Kasi basusu kati na bango bakendaki epai ya bafarizeo mpe bayebisaki bango likambo Yesu asalaki.
47
Bongo banganga-Nzambe mpe bafarizeo babengisaki likita-monene. Batunanaki: —Tokosala nini? Pamba te moto oyo azali kosala makamwisi mingi.
48
Soki totiki ye bongo, bato nyonso bakondima ye, bongo bato ya Roma bakoya mpe bakopanza Esika na biso mpe ekolo na biso.
49
Bongo moko na kati na bango kombo na ye Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, alobaki na bango: —Bozali kososola eloko moko te!
50
Bozali komona te ete ezali mpo na litomba na biso ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ekufa te?
51
Nzokande alobaki makambo wana na makanisi na ye moko te, kasi lokola azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, yango wana asakolaki ete Yesu akokufa mpo na ekolo ya bayuda;
52
mpe mpo na ekolo kaka te, kasi mpo na kosangisa mpe bana nyonso ya Nzambe baoyo bapalangana, ete bazala moto se moko.
53
Banda mokolo wana, bayokanaki mpo na koboma ye.
54
Bongo Yesu azalaki komimonisa lisusu polele te na miso ya bayuda. Alongwaki wana mpe akendaki na mokili oyo ezalaki pene-pene na esobe, na mboka moko kombo na yango Efrayimi; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na ye.
55
Feti ya Pake ya bayuda ekomaki pene-pene. Bongo bato mingi batikaki bamboka mpe bakendaki na Yeruzalem, liboso ya Pake, mpo na komipetola.
56
Bazalaki koluka Yesu, mpe bazalaki kotunana bango na bango, awa bazalaki na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe: —Bokanisi nini? Akoya na feti te?
57
Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bafarizeo bapesaki motindo ete, soki moto ayebi esika Yesu azali, akende koyebisa bango, mpo bakanga ye.
← Chapter 10
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 12 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21