bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
John 16
John 16
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 15
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 17 →
1
—Nalobi na bino makambo oyo mpo ete kondima na bino ebeta libaku te.
2
Pamba te bakobengana bino na Bandako na bango ya mayangani, mpe tango elingi kokoka, oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete azali kosalela Nzambe na ndenge wana.
3
Bakosala makambo ya ndenge wana mpo bayebi Tata te, mpe bayebi ngai te!
4
Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete tango ngonga ekokoka, bokanisa ete nasiʼnayebisaki bino makambo yango. Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli te, mpo nazalaki naino na bino elongo.
5
Sikʼoyo nazali kokende epai ya Moto oyo atindaki ngai; mpe moto ata moko te na kati na bino azali kotuna ngai: Ozali kokende wapi?
6
Kasi lokola nayebisi bino makambo oyo, tala ndenge mitema na bino etondi na mawa.
7
Nzokande, nazali koyebisa bino makambo ya solo: ezali malamu mingi penza mpo na bino ete ngai nakende. Pamba te soki nakei te, Mosungi mpe akoyela bino te. Kasi soki nakei, nakotindela bino ye.
8
Tango akoya, akolakisa bato ya mokili polele mpo na oyo etali masumu, bosembo, mpe kosambisama:
9
mpo na masumu, pamba te bazali kondima ngai te;
10
mpo na bosembo, pamba te nazali kokende epai ya Tata mpe bokomona ngai lisusu te;
11
mpo na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asiʼasambisami.
12
Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi sikʼoyo, bokokoka te kososola yango.
13
Tango Molimo ya bosolo akoya, ye akotambolisa bino kati na solo nyonso, pamba te akoloba na kombo na ye moko te, kasi akoloba makambo nyonso oyo ayokaki, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya.
14
Ye akopesa ngai nkembo, pamba te akozwa makambo nyonso oyo ezali epai na ngai mpe akoyebisa bino yango.
15
Nyonso oyo Tata azali na yango, ezali mpe ya ngai. Yango wana nalobi ete, akozwa makambo nyonso oyo ezali epai na ngai mpe akoyebisa bino yango.
16
Etikali moke bokomona ngai lisusu te; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu!
17
Bayekoli na ye mosusu babandaki kotunana bango na bango: —Oyo ye alobi na biso elingi koloba nini. “Etikali moke bokomona ngai lisusu te; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu”. Mpe lisusu: “Pamba te nazali kokende epai ya Tata?”
18
Bazalaki kaka kotunana: —“Etikali moke”, yango elingi koloba nini? Tozali kososola te likambo alingi koloba.
19
Yesu ayebaki ete balingaki kotuna ye motuna, bongo alobaki na bango: —Bozali kotunana bino na bino mpo na maloba oyo nalobi ete: “Etikali moke bokomona ngai lisusu te; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu.”
20
Nazali koloba na bino ya solo: bokolela mpe bokomitungisa, kasi mokili ekotonda na esengo. Bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.
21
Mwasi soki alingi kobota ayokaka mawa mingi penza, mpo tango na ye ya kobota ekoki; kasi soki aboti mwana, akobosana bapasi na ye mpo na esengo oyo akotonda na yango, mpo ete mwana asili kobotama na mokili.
22
Bino mpe ndenge moko, sikʼoyo bozali na mawa, kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe esengo yango, moto ata moko te akokoka kolongola bino yango.
23
Na mokolo yango, bokotuna ngai lisusu ata likambo moko te. Nazali koloba na bino ya solo: nyonso oyo bokosenga epai ya Tata na kombo na ngai, ye akopesa bino yango.
24
Kino sikʼoyo, naino bosengi eloko moko te na kombo na ngai. Bosenga mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.
25
Nalobaki na bino makambo wana na masapo. Kasi tango ezali koya oyo nakoloba na bino lisusu na masapo te, kasi nakoloba na bino na polele penza mpo na Tata.
26
Na mokolo wana, bokosenga na kombo na ngai. Mpe nalobi te ete nakosenga epai ya Tata mpo na bino;
27
pamba te Tata ye moko alingaka bino, mpo bolingaka ngai mpe bondimaka ete ngai nawutaki epai ya Tata.
28
Nawutaki epai ya Tata mpe nayaki awa na mokili. Mpe sikʼoyo nazali kotika mokili, mpe nazali kozonga epai ya Tata!
29
Bongo bayekoli na ye balobaki na ye: —Omoni, sikʼoyo ozali koloba polele, mpe otiki koloba na masapo.
30
Sikʼoyo toyebi ete oyebi makambo nyonso, mpe ozali na posa te ete moto atuna yo; mpo na yango, tondimi ete owutaki epai ya Nzambe.
31
Yesu azongiselaki bango: —Bondimi sikʼoyo?
32
Tango ezali koya, mpe esiʼekomi, oyo bokopanzana moto na moto na epai na ye, mpe bokotika ngai, ngai moko. Kasi nazali ngai moko te, pamba te Tata azali na ngai elongo.
33
Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete bozala na kimia kati na ngai. Na mokili oyo, bokonyokwama mingi penza. Kasi boyika mpiko! pamba te, nasiʼnalongi mokili.
← Chapter 15
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 17 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21