bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 13
Acts 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 14 →
1
Lingomba ya Antioshe ezalaki na basakoli mpe balakisi: Barnabasi, Simeona oyo bazalaki kobenga moto Moyindo, Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode mpe Saulo.
2
Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kokumamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki: “Botia Barnabasi mpe Saulo pembeni mpo na ngai, na tina na mosala oyo nabengelaki bango.”
3
Boye, sima na kokila bilei, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.
4
Bongo, Barnabasi mpe Saulo bakendaki na Selesi na etinda ya Molimo Mosantu, mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre.
5
Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba ya Nzambe na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango mpe azalaki kosunga bango.
6
Wana batambolaki esanga mobimba mpe bakomaki na Pafosi, bamonaki Moyuda moko na kombo ya Bari-Yesu. Azalaki moto ya maji mpe mosakoli ya lokuta.
7
Azalaki mpe moninga ya moyangeli ya esanga, Sergiusi-Paulusi oyo azalaki moto ya mayele. Boye, Sergiusi-Paulusi abengisaki Barnabasi mpe Saulo, pamba te azalaki na posa ya koyoka Liloba na Nzambe.
8
Kasi, Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye) azalaki kotelemela bango, mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli.
9
Boye, Saulo oyo bazalaki mpe kobenga Polo, lokola atondisamaki na Molimo Mosantu atalaki Elimasi swii. Alobaki:
10
“Mwana ya Zabolo, otonda na mayele mabe, moto ya lokuta mpe monguna ya makambo nyonso ya malamu. Kino tango nini okotika kobebisa nzela ya sembo ya Nkolo?
11
Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sikʼoyo. Okokufa miso, mpe na mwa tango, okomona lisusu pole te!” Kaka na tango wana, molili mpe butu ezipaki miso na ye. Akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso mpe koluka moto oyo akosimba ye na loboko, mpo na kolakisa ye nzela.
12
Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalamaki, andimaki; pamba te akamwaki mingi penza mpo na mateya oyo bateyaki ye mpo na Nkolo.
13
Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendaki na Perje, na mokili ya Pafili. Yoane Malako atikaki bango kuna mpe azongaki na Yelusalemi.
14
Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya saba, bakotaki mpe bavandaki na ndako ya mayangani.
15
Sima ya kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba: “Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, boloba!”
16
Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki: —Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai!
17
Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso; akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki na mokili ya Ejipito lokola bapaya. Boye, abimisaki bango na mokili yango na nguya monene.
18
Mibu tuku minei mobimba na esobe, akangaki motema liboso ya bizaleli na bango.
19
Apanzaki bikolo sambo na mokili ya Kanana, mpe apesaki mabele na bango lokola bomengo epai ya bato na ye.
20
Nyonso wana esalaki mibu pene nkama minei na ntuku mitano. Sima na yango, Nzambe apesaki bango basambisi kino na tango ya mosakoli Samuele.
21
Boye, basengaki ye mokonzi mpe apesaki bango Sauli, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi.
22
Kasi Nzambe alongolaki Sauli mpe akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo atatolaki mpo na ye: “Namoni ete Davidi, mwana mobali ya Yese azali moto oyo asepelisaka motema na ngai. Ye nde akokokisa mokano nyonso na ngai!”
23
Ezali na libota ya Davidi nde Nzambe abimisaki mpo na bato ya Isalaele Mobikisi Yesu, ndenge alakaki.
24
Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi.
25
Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki: “Bino bokanisi ete ngai nazali nani? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi Moto yango azali koya sima na ngai, mpe nakokoka kutu te kofungola basinga ya basandale na ye!”
26
Bandeko na ngai, bana ya Abrayami, mpe bino bato oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali mpo na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.
27
Bato ya Yelusalemi mpe bakonzi na bango basosolaki te soki Yesu azalaki nani. Nzoka nde, tango bakatelaki ye etumbu, bakokisaki nde maloba ya basakoli oyo bazalaki kotanga na mikolo nyonso ya saba.
28
Atako bamonaki mabe moko te kati na ye, mabe oyo ekokaki komemela ye etumbu ya liwa, kasi basengaki kaka ete Pilato abomisa ye.
29
Tango bakokisaki makambo nyonso oyo ekomama mpo na ye, bakitisaki ye na ekulusu mpe batiaki ye na lilita.
30
Kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi,
31
mpe na mikolo ebele, amonanaki epai ya bato oyo bazalaki kosala na ye mibembo longwa na Galile kino na Yelusalemi. Boye, bango bazali sikʼoyo batatoli na ye liboso ya bato na biso.
32
Tozali koyebisa bino sango malamu: sango malamu oyo Nzambe alakaki bakoko na biso,
33
Nzambe akokisi yango mpo na biso bana na bango, na nzela ya lisekwa na Yesu kati na bakufi ndenge ekomama na Nzembo ya mibale: “Ozali Mwana na ngai ya mobali, lelo nakomi Tata na yo!”
34
Nzambe alobaki ete akosekwisa ye kati na bakufi mpo ete apola te. Yango nde alobaki: “Nakopesa bino na solo, mapamboli ya bule oyo nalakaki Davidi!”
35
Yango wana, alobaki na eteni mosusu: “Okotika te ete Mosantu na yo apola.”
36
Pamba te, tango Davidi akokisaki mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya bakoko na ye mpe apolaki.
37
Kasi Moto oyo Nzambe asekwisaki apolaki te.
38
Yango wana bandeko na ngai, nalingi boyeba ete, ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino.
39
Ezali na nzela na ye nde moto nyonso oyo andimi, akomi moto ya sembo, na nyonso oyo Mobeko ya Moyize elongaki te kokomisa ye sembo.
40
Yango wana, bosala keba ete makambo oyo basakoli baloba ekomela bino te:
41
“Bino batioli, botala, bokamwa mpe bolimwa! Pamba te, nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo soki bayebisi bino yango, bokondima yango te.”
42
Wana Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki ete bazonga lisusu na mokolo ya saba oyo elandaki mpo na kolobela lisusu makambo wana.
43
Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi mpe bato ya bikolo misusu oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda balandaki Polo mpe Barnabasi oyo, na masolo na bango, bazalaki kolendisa bango ete bakangama makasi na ngolu ya Nzambe.
44
Na mokolo ya saba oyo elandaki, bato ebele penza ya engumba bayaki kosangana mpo na koyoka Liloba ya Nkolo.
45
Kasi tango Bayuda bamonaki bato ebele, batondaki na zuwa. Boye, bakomaki koloba mabe mpo na makambo oyo Polo azalaki koloba mpe bakomaki kofinga ye.
46
Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na molende nyonso: — Tosengeli liboso koteya Liloba ya Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bomoni ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi epai ya bato oyo bazali Bayuda te.
47
Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso: “Nakomisi yo pole mpo na bato ya bikolo misusu, mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili!”
48
Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, batondisamaki na esengo mpe bakomaki kokumisa Liloba ya Nkolo; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisaki mpo ete bazwa bomoi ya seko bakomaki bandimi.
49
Liloba ya Nkolo epanzanaki na etuka wana mobimba.
50
Kasi Bayuda batiaki songi-songi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe, epai ya bato minene ya engumba wana. Boye, bakomaki konyokola Polo na Barnabasi mpe babenganaki bango na mokili na bango.
51
Bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana mpe bakendaki na Ikoniomi.
52
Bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28