bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 17
Acts 17
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 16
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 18 →
1
Wana Polo mpe Silasi balekaki na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendaki na Tesalonika esika ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki.
2
Polo akotaki na ndako ya mayangani lokola ezalaki na momesano. Basaba misato, azalaki kosolola na bango na tina ya Makomi.
3
Azalaki kolimbolela bango mpe kotalisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba: “Yesu oyo nazali koteya bino, ye nde azali Klisto!”
4
Ndambo ya Bayuda bandimaki makambo oyo Polo alobaki, mpe bakomaki na ngambo ya Polo mpe Silasi; ndenge moko mpe na bato mingi ya mokili ya Greki oyo bazalaki kobanga Nzambe, elongo na basi ebele ya lokumu.
5
Kasi Bayuda misusu batombokaki. Bakendaki kokamata bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala. Basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendaki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ngulupa ya bato.
6
Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko misusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga: “Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi mpe awa.
7
Bongo, Jazoni ayambi bango na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba: ‘Mokonzi mosusu azali, kombo na ye Yesu!’ ”
8
Tango ngulupa ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi.
9
Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko misusu lomande mpe na sima batikaki bango.
10
Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda.
11
Nzoka nde, bato ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba, mpe mokolo na mokolo bazalaki koyekola na mozindo penza Makomi mpo na koyeba soki makambo oyo Polo azalaki koteya bango ezali ya solo.
12
Bongo, Bayuda ebele kati na bango bandimaki; ndenge moko mpe basi mingi ya lokumu kati na bato ya mokili ya Greki elongo na mibali ebele kati na bato ya mokili ya Greki.
13
Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba ya Nzambe na Bere, bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka.
14
Bongo, kaka na tango wana, bandeko basalaki ete Polo akita na ebale mpo na kozwa masuwa wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere.
15
Bato oyo bakendaki kotika Polo bamemaki ye kino na Atene, mpe bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda Polo noki na Atene.
16
Wana Polo azalaki kozela bango na Atene, motema na ye etungisamaki mingi na komona engumba yango etonda na banzambe ya bikeko.
17
Azalaki bongo kosolola na Bayuda mpe bato ya mokili ya Greki oyo basambelaka Nzambe na ndako ya mayangani, mpe mokolo na mokolo azalaki mpe kosolola na bisika ya bato ebele, elongo na bato oyo azalaki kokuta wana.
18
Lisanga moko ya bato ya mayele oyo babengaka Epikire mpe lisanga mosusu ya bato ya mayele oyo babengaka sitoyika bakomaki kotiana na ye tembe. Bamoko batunaki: “Moto ya makelele oyo alingi koloba nini?” Bamisusu balobaki: “Tomoni lokola nde azali koteya banzambe ya bapaya!” Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya sango malamu ya Yesu mpe ya lisekwa kati na bakufi.
19
Boye, bakamataki ye mpe bamemaki ye na Areopaje. Balobaki na ye: —Boni, tokoki solo koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini?
20
Pamba te, ozali kolobela biso makambo ya sika. Bongo, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini.
21
(Bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi penza mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).
22
Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki: —Bato ya Atene! Nasosoli ete na makambo nyonso, bolingaka mingi makambo ya bonzambe.
23
Pamba te, tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko oyo bakoma likolo na yango: “Mpo na Nzambe oyo ayebani te.” Nzoka nde, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi ye te.
24
Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya likolo mpe ya se; avandaka te na bandako oyo maboko ya bato etonga.
25
Azalaka na posa ya lisungi ya moto te mpo ete akoka na nyonso, pamba te ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso.
26
Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba. Akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovandaka.
27
Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka ye, tango mosusu bakolonga komona ye na koluka-luka lokola moto akufa miso. Nzoka nde, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko na biso.
28
Pamba te, na nzela na ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino misusu baloba: “Tozali bana na ye!”
29
Yango wana, lokola tozali bana ya Nzambe, tokanisa te ete bonzambe ekokani na eloko moko ya wolo, ya palata to ya libanga: nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto.
30
Nzoka nde, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, sikʼoyo azali kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema.
31
Pamba te, akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
32
Wana bayokaki Polo koloba mpo na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe misusu balobaki: “Tokoyoka yo mokolo mosusu mpo na likambo oyo.”
33
Boye, Polo atikaki bango.
34
Nzoka nde, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango ezalaki: Denisi, moto ya Areopaje, mwasi moko na kombo ya Damarisi mpe bato mosusu elongo na bango.
← Chapter 16
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 18 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28