bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 15
Acts 15
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 14
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 16 →
1
Ndambo ya bato oyo bawutaki na Yudea bakomaki na Antioshe mpe bakomaki koteya bandeko: “Soki bokatisi nzoto ya mibali te kolanda Mobeko ya Moyize, bokozwa lobiko te.”
2
Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana, bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo mpe Barnabasi elongo na bandimi misusu bakende na Yelusalemi mpo na komona bantoma mpe bakambi na tina ya likambo yango.
3
Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Bakatisaki Fenisi mpe Samari, mpe bazalaki kotatola ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa esengo na bandeko nyonso.
4
Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango; boye Polo mpe Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.
5
Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala bafarizeo batelemaki mpo na koloba: “Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatisa nzoto ya mibali mpe kotosa Mobeko ya Moyize.”
6
Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango.
7
Lokola tembe elekaki makasi, Piere atelemaki mpe alobaki: “Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino, mpo ete nakoka koteya sango malamu na bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bandima.
8
Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato, alakisaki ete andimaki bango, na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, kaka ndenge apesaki biso.
9
Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te apetolaki mitema na bango na nzela ya kondima.
10
Bongo sikʼoyo, mpo na nini bolingi komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo ezala biso to batata na biso tolongaki komema te?
11
Te! Biso tondimaka ete tobikisami na ngolu ya Nkolo Yesu, kaka ndenge moko mpe na bango.”
12
Boye, lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe azalaki kosala na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.
13
Tango basilisaki koloba, Jaki azwaki maloba mpe alobaki: —Bandeko boyoka ngai!
14
Simona awuti kolimbolela biso ndenge nini wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na ye.
15
Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli ndenge ekomama:
16
Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya. Nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango,
17
Mpo ete bato oyo bakotikala bakoka koluka Nkolo, mpe bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengami na Kombo na ngai, elobi Nkolo, oyo asalaka makambo oyo,
18
Makambo oyo eyebana wuta kala.
19
Yango wana, tala likanisi na ngai: Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe.
20
Na esika ya kotungisa bango, tokomela bango kaka ete balia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, basala ekobo te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila mpe balia makila te.
21
Pamba te, wuta kala, bateyi bateyaka Mobeko ya Moyize na bingumba nyonso, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani mikolo nyonso ya saba.
22
Bongo, bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi mpe Silasi. Bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
23
Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye: Biso bandeko na bino, bantoma mpe bakambi, Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka na Antioshe, na Siri mpe na Silisi: Mbote na bino.
24
Toyokaki ete bandeko misusu kowuta epai na biso, bayaki kotia mobulu kati na bino, mpe kotungisa makanisi na bino na maloba na bango. Nzoka nde, biso topesaki bango nzela te.
25
Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso Barnabasi mpe Polo,
26
Ba-oyo bakaba bomoi na bango mobimba mpo na mosala ya Nkolo na biso Yesu Klisto.
27
Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi, mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.
28
Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba misusu te, longola kaka bikateli oyo:
29
Bolia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, bolia makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila mpe bosala ekobo te. Ekozala malamu soki bokimi makambo oyo. Botikala malamu.
30
Boye, batikaki bango kokende na Antioshe, epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki bango mokanda yango.
31
Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi mpo na maloba ya kolendisa oyo ezalaki kati na yango.
32
Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki na likabo ya kosakola maloba ya Nzambe, bazwaki penza tango molayi ya koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.
33
Bawumelaki wana mwa tango molayi, mpe bandeko batombelaki kimia na bozongi, epai ya bato oyo batindaki bango.
34
[Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.]
35
Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba ya Nkolo elongo na bato mosusu.
36
Sima ya mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi: —Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba ya Nkolo, mpo ete totala soki ndenge nini bandeko bazali.
37
Barnabasi azalaki na posa ya komema Yoane oyo babengaka Malako elongo na bango.
38
Nzoka nde, Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe asungaki bango te na mosala.
39
Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi akamataki Malako mpe akotaki na ye elongo na masuwa mpo na kokende na Shipre.
40
Kasi Polo akamataki Silasi mpe bakendaki, mpe bandimi batikaki bango na se ya ngolu ya Nkolo.
41
Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa mangomba.
← Chapter 14
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 16 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28