bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 24
Acts 24
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 23
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 25 →
1
Sima ya mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya banganga-Nzambe ayaki na Sezare elongo na bakambi misusu mpe molobeli moko na kombo ya Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli.
2
Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo: —Tata mokonzi Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo.
3
Tata mokonzi Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza.
4
Kasi tolingi te kozwa yo tango molayi. Nabondeli yo, salela biso ngolu ya koyoka biso na mokuse.
5
Biso tomoni ete moto oyo mosala na ye kotia mobulu; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti,
6
mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye ndenge Mobeko na biso etindaka,
7
kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi.
8
Atindaki bato oyo bafundaki ye ete baya epai na yo.] Yo moko soki otuni ye mituna, okososola ete makambo oyo tofundeli ye ezali ya solo.
9
Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye.
10
Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki: —Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo.
11
Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete, eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendaki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe.
12
Mpe bato oyo bafundi ngai, batikala nanu kokuta ngai te ezala na Tempelo, to na bandako ya mayangani to mpe na engumba, nazali kotia tembe na moto to mpe kotindika bato ete batomboka.
13
Bakolonga te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sikʼoyo.
14
Nzoka nde, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga: “binzambi-nzambi.” Nandimaka nyonso oyo ekomama na Mobeko mpe na mikanda ya basakoli;
15
boye ngai mpe lokola bango, nazalaka na elikya epai na Nzambe ete bato nyonso, ezala bato ya sembo to ya mabe bakosekwa.
16
Yango wana, ngai mpe nasalaka nyonso na tango nyonso ete nazala na likambo moko te na motema liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.
17
Sima na ngai kozala mibu ebele libanda ya Yelusalemi, nazongaki kuna mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi mpe kopesa makabo epai ya Nzambe.
18
Bakutaki ngai na Tempelo tango nasilisaki komipetola. Boye, ngulupa ya bato ezalaki pembeni na ngai te, bongo mobulu mpe ezalaki te.
19
Kasi ezali ndambo ya Bayuda ya Azi oyo bazalaki wana nde basengelaki kotelema liboso na yo mpo na kofunda ngai, soki solo bazwaki ngai na likambo.
20
To mpe bato oyo bazali awa, bango moko baloba soki mabe nini bazwaki ngai tango nasambaki liboso ya Likita-monene.
21
Boni, ezali te mpo ete wana natelemaki liboso na bango nagangaki: “Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bato bakufa bakosekwa?”
22
Felikisi, oyo ayebaki malamu penza makambo oyo etali Nzela wana, azongisaki bango mpe alobaki: “Nakokata likambo na bino tango mokonzi ya basoda Lisiasi akoya.”
23
Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama ete abatela Polo na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa nzela na baninga na ye ete bakoka kosunga ye.
24
Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye Drusiye oyo azalaki Moyuda. Abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu Klisto.
25
Kasi tango Polo abandaki koloba na tina na bosembo, na komibatela mpe na kosambisama oyo ezali koya, Felikisi akomaki na somo mpe alobaki na ye: “Ekoki mpo na sikʼoyo! Okoki kokende. Soki nazwi lisusu tango nakobengisa yo.”
26
Felikisi azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye, na elikya ete Polo akopesa ye kanyaka.
27
Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi, oyo mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo na boloko.
← Chapter 23
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 25 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28