bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 9
Acts 9
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 10 →
1
Nzoka nde, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendaki epai ya mokonzi ya banganga-Nzambe,
2
mpe asengaki ye mikanda mpo na kopesa na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete soki akuti ndambo ya bato kuna, basi to mibali oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi.
3
Tango azalaki kokende mpe akomaki pene ya Damasi, na mbala moko, amonaki pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye.
4
Boye, akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye: —Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?
5
Saulo atunaki: —Nkolo, yo nani? Mongongo ezongisaki: —Ezali ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.
6
Kasi sikʼoyo telema, kota na engumba, mpe kuna bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
7
Bato oyo bazalaki kosala mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba. Bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.
8
Saulo atelemaki wuta na mabele, kasi tango afungolaki miso, azalaki komona lisusu te. Boye, basimbaki ye na loboko mpe bamemaki ye na Damasi.
9
Asalaki mikolo misato: komona te, kolia te mpe komela te.
10
Moyekoli moko azalaki na Damasi, kombo na ye ezalaki Ananiasi. Nkolo abengaki ye na emoniseli: —Ananiasi! Ye azongisaki: —Nkolo, ngai oyo!
11
Nkolo alobaki na ye: —Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka: “Alima,” mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, oyo azali kobondela. Kombo na ye Saulo.
12
Pamba te, amonaki na emoniseli moto moko kombo na ye Ananiasi ayaki mpe atielaki ye maboko mpo ete amona lisusu!
13
Kasi Ananiasi azongisaki: —Nkolo, nayoka makambo mingi mpo na moto wana, mpe ndenge anyokolaki babulami na yo na Yelusalemi.
14
Mpe ayei awa na Damasi, na bokonzi oyo bakonzi ya banganga-Nzambe bapesi ye mpo na kokanga bato nyonso oyo babondelaka yo.
15
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi: —Kende, pamba te nasila kopona moto wana mpo ete azala esaleli na ngai mpo na komema Kombo na ngai na bikolo ya bapaya mpe epai ya bakonzi na bango, elongo na bato ya Isalaele.
16
Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na ngai!
17
Bongo, Ananiasi akendaki. Akotaki na ndako mpe atielaki Saulo maboko. Alobaki na ye: “Ndeko na ngai Saulo, Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela tango ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu!”
18
Kaka na tango wana, biloko moko lokola baposo ya mbisi, ekweyaki wuta na miso ya Saulo. Boye, akomaki lisusu komona. Atelemaki mpe azwaki libatisi;
19
mpe sima ya kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi. Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki na Damasi.
20
Kaka na tango wana, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana ya Nzambe.
21
Bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki kokamwa mingi penza mpe bazalaki kotuna: “Boni, ezali ye te moto azalaki konyokola bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu na Yelusalemi? Ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe?”
22
Nzoka nde, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali solo Klisto.
23
Sima ya mikolo ebele, Bayuda bayokanaki mpo na koboma Saulo.
24
Kasi bato bayebisaki Saulo makambo oyo bazalaki kobongisa mpo na ye. Butu mpe moyi, bazalaki kokengela bikuke ya engumba mpo na koluka koboma ye.
25
Bongo, mokolo moko na butu, bayekoli na ye bakamataki ye, batiaki ye na kitunga mpe bakitisaki ye na libanda ya miri.
26
Tango Saulo akomaki na Yelusalemi, alukaki kosangana na bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, pamba te bazalaki penza kondima te ete akomi moyekoli.
27
Kasi Barnabasi akamataki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma. Ayebisaki bango ndenge nini Saulo amonaki Nkolo na nzela ya Damasi, mpe makambo oyo Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango mpe lisusu ndenge nini ateyaki, na kobanga te, na Damasi na kombo ya Yesu.
28
Bongo, Saulo avandaki elongo na bango. Azalaki kotambola na bonsomi nyonso kati na Yelusalemi mobimba mpe koteya na kobanga te, na Kombo ya Nkolo.
29
Saulo azalaki kosolola mpe kotia tembe na Bayuda oyo balobaka monoko ya greki, nzoka nde, bango bazalaki koluka nzela ya koboma ye.
30
Tango bandeko bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezare, mpe longwa kuna, batindaki ye na Tarse.
31
Lingomba ezalaki na kimia mingi kati na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samari. Ezalaki kokola na kondima, kotosa Nkolo mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.
32
Lokola Piere azalaki tango na tango kosala mibembo kati na mboka, akendaki mpe kotala basantu oyo bavandaka na mboka Lidi.
33
Kuna, amonaki moto moko, na kombo ya Ene, oyo alala na etoko wuta mibu mwambe mpo ete azalaki na maladi ya buka-buka.
34
Piere alobaki na ye: “Ene, Yesu Klisto abikisi yo; telema mpe bongisa mbeto na yo!” Kaka na tango wana, Ene atelemaki.
35
Tango bato nyonso oyo bavandaka na Lidi mpe na esobe ya Saroni bamonaki ye, bandimelaki Nkolo.
36
Ezalaki na moyekoli moko ya mwasi na Jafa, na kombo ya Tabita, oyo babongola na monoko ya greki Dorkasi, elingi koloba: “Mboloko.” Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosalisa babola.
37
Nzoka nde, na mikolo wana, azwaki maladi mpe akufaki. Sima ya kosokola nzoto na ye, batiaki yango na shambre ya likolo.
38
Lidi ezalaki pene ya Jafa. Boye, tango bayekoli bayokaki sango ete Piere azali na Lidi, batindelaki ye mibali mibale mpo na koloba na ye: “Tobondeli yo, yaka noki!”
39
Piere akendaki elongo na bango. Tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufela mibali bayaki kozingela ye mpe bazalaki kolela. Boye, bazalaki kolakisa ye banzambala mpe bilamba misusu oyo Dorkasi azalaki kotonga wana azalaki nanu elongo na bango.
40
Piere asengaki ete bato nyonso oyo bazalaki na shambre babima. Afukamaki mpe abondelaki, bongo abalukaki epai nzoto ezalaki mpe alobaki: “Tabita telema!” Tabita afungolaki miso, amonaki Piere mpe avandaki.
41
Boye, Piere akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye, abengaki bandimi elongo na basi oyo bakufisa mibali mpe alakisaki bango ete Dorkasi azali na bomoi.
42
Sango yango epanzanaki na engumba mobimha ya Jafa mpe bato mingi bandimelaki Nkolo.
43
Piere avandaki mikolo mingi na Jafa, na ndako ya moto moko na kombo ya Simona, oyo azalaki kosala mosala ya kobongisa baposo ya nyama.
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 10 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28