bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 25
Acts 25
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 24
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 26 →
1
Sima na mikolo misato ya boyei na ye na etuka, Festisi alongwaki na Sezare mpo na kokende na Yelusalemi,
2
epai wapi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendaki kokutana na ye mpo na kofunda Polo.
3
Babondelaki Festisi mingi mpo ete asalela bango ngolu, ete atinda Polo na Yelusalemi; pamba te, basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye.
4
Kasi Festisi azongiselaki bango: “Polo azali nanu na boloko na Sezare. Etikali moke ngai moko mpe nazonga kuna.
5
Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna.”
6
Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezare. Boye, na mokolo oyo elandaki, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo.
7
Tango Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye mpo na makambo mingi ya mabe, oyo bango moko kutu bazalaki na makoki te ya kolakisa bosolo na yango.
8
Boye, tala ndenge Polo asambaki: “Nabuki ata mobeko te ya Bayuda, to ya Tempelo to mpe ya Kayisala.”
9
Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo: —Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo?
10
Polo azongisaki: —Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Kayisala; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.
11
Soki ya solo ngai nasali mabe, to nasali likambo oyo ekoki mpo na komemela ngai etumbu ya liwa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda oyo bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Kayisala akata likambo na ngai!
12
Sima na Festisi kozwa toli ya likita na ye, alobaki na Polo: —Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Kayisala, okokende solo kosamba liboso na ye.
13
Sima na mwa mikolo, mokonzi Agripa elongo na Berenise bayaki na Sezare mpo na kopesa Festisi mbote.
14
Lokola balekisaki mikolo mingi kuna, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo. Alobaki: —Moto moko azali awa, Felikisi atikaki ye na boloko.
15
Tango nakendaki na Yelusalemi, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bayaki kofunda ye epai na ngai mpe basengaki ete nakatela ye etumbu.
16
Kasi nayebisaki bango ete, bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu, soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye; mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye.
17
Tango bayaki awa, nalekisaki tango te. Kaka na mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango.
18
Tango bato oyo bafundaki ye bakomaki koloba, balongaki te kotalisa bosolo ya makambo ya mabe oyo bafundelaki ye, ndenge ngai nazalaki kokanisela.
19
Likambo bazalaki na yango ezalaki kaka: tembe mpo na makambo oyo etali lolenge na bango ya kosambela mpe mpo na moto moko oyo akufa, kombo na ye Yesu, kasi Polo azali koloba ete azali na bomoi!
20
Lokola nayebaki te ndenge nini nakokaki kokata likambo ya ndenge wana, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna.
21
Kasi Polo asengaki ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene. Boye, napesaki mitindo ete babatela ye na boloko kino tango nakotinda ye epai ya Kayisala.
22
Agripa alobaki na Festisi: —Nazali na posa ya koyoka moto wana ngai moko. Festisi azongisaki: —Okoyoka ye lobi!
23
Na mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo.
24
Festisi alobaki: —Mokonzi Agripa mpe bato nyonso oyo bazali elongo na biso, bozali komona moto oyo! Lingomba mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye na Yelusalemi mpe na Sezare. Bazalaki koganga ete asengeli kokufa!
25
Nzoka nde, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya liwa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.
26
Lokola nazali na likambo moko te ya malonga mpo na kokomela mokonzi monene na tina na ye; nayei na ye liboso na bino nyonso, mpe koleka, liboso na yo mokonzi Agripa mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, soki tosilisi kotuna ye mituna.
27
Pamba te, namoni ekozala penza tina te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.
← Chapter 24
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 26 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28