bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 4
Acts 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 5 →
1
Wana Piere mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe basaduseo bayaki,
2
na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bato bakufa bakosekwa ndenge Yesu asekwaki.
3
Bakangaki Piere mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma.
4
Kasi, bato mingi kati na bato oyo bayokaki mateya bandimaki yango, bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano (5.000).
5
Boye, na mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bampaka mpe balakisi ya mibeko basanganaki na Yelusalemi.
6
Ana, mokonzi ya banganga-Nzambe azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya banganga-Nzambe.
7
Bamemaki Piere mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna: —Bozali kosala makambo oyo na bokonzi to na kombo ya nani?
8
Bongo, Piere oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango: —Bakonzi mpe bampaka ya Isalaele!
9
Lokola botuni biso lelo mpo na bolamu oyo esalami epai ya moto oyo akufa makolo mpe ndenge nini asili kobika,
10
tika ete bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele boyeba ete ezali na Kombo ya Yesu Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono, kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi.
11
Ye nde azali “libanga oyo bino batongi ya ndako bobwakaki, kasi ekomi libanga oyo ezali na tina mingi koleka.”
12
Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
13
Wana bamonaki ndenge nini Piere mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe basosolaki ete bazalaki bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi penza. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.
14
Bazalaki ata na liloba moko te ya koloba, pamba te bazalaki komona moto oyo abikaki atelema wana pene na bango.
15
Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita monene, mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu.
16
Bazalaki kotunana: “Tosala nini penza na bato oyo? Pamba te, bato nyonso oyo bavandaka na Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene mpe tokoki kowangana yango te.
17
Kasi mpo ete sango ya likambo oyo ekoba kopanzana te kati na bato, tokebisa bango boye: ‘Bomeka lisusu te koloba na Kombo ya Yesu ezala ata na nani!’ ”
18
Boye, babengaki Piere na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini.
19
Kasi, Piere mpe Yoane bazongiselaki bango: —Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe: kotosa bino to kotosa Nzambe?
20
Pamba te, biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki!
21
Sima ya kogangela bango, batikaki bango ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalamaki.
22
Moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.
23
Tango batikaki bango, Piere mpe Yoane bakendaki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango.
24
Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe. Balobaki: —Nkolo Yawe, Yo oyo osala likolo mpe se, ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezalaka kati na yango;
25
Yo oyo olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso Davidi, mosali na yo: “Mpo na nini bikolo ezali kotomboka mpe bato bazali kosala makita ezanga tina?
26
Bakonzi ya mokili batelemi mpe bayangeli basangani mpo na kobundisa Nkolo mpe Mopakolami na ye.”
27
Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo misusu mpe bato ya Isalaele mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na yo Mosantu oyo obulisa.
28
Ezali na ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala na nguya mpe na mokano na yo.
29
Sikʼoyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na yo makasi ya koteya Liloba na yo na molende nyonso.
30
Boye, sembola loboko na yo mpo na kobikisa bato ya maladi, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene na Kombo na Yesu, Mosali na yo Mosantu.
31
Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki. Mpe bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba ya Nzambe na molende nyonso.
32
Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
33
Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso.
34
Moko te kati na bango akelelaki. Pamba te, tango nyonso bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki
35
epai ya bantoma. Boye, bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, ndenge ezalaki bosenga na ye.
36
Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga ya Shipre mpe oyo bantoma bapesaki kombo ya Barnabasi, oyo elakisi: “Molendisi”;
37
atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28