bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 6
Acts 6
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 7 →
1
Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya ebreo, pamba te na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo, basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela.
2
Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango: “Ekozala malamu te mpo na biso kotika mosala ya koteya Liloba ya Nzambe mpo na komipesa na mosala ya kokabola biloko ya kolia.
3
Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bazali na bizaleli ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.
4
Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba ya Nzambe.”
5
Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki: Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu, Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshi oyo akotaki na lisanga ya Bayuda.
6
Balakisaki bango epai ya Bantoma, oyo batiaki bango maboko mpe babondelaki mpo na bango.
7
Boye, Liloba ya Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu.
8
Nzoka nde, Etieni, moto oyo atondaki na ngolu mpe na nguya ya Nzambe azalaki kosala bikamwa mpe bilembo minene kati na bato.
9
Bongo, bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo babengaka “Ndako ya mayangani ya bansomi”: Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azi bazalaki na tembe na Etieni;
10
kasi balongaki te kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.
11
Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba: “Toyokaki Etieni koloba maloba ya kotuka Moyize mpe Nzambe.”
12
Basalaki ete bato, bampaka mpe balakisi ya mibeko batomboka. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita monene.
13
Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki: “Moto oyo azali kolemba te kobebisa lokumu ya Tempelo mpe ya mibeko ya Moyize.
14
Pamba te, toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.”
15
Bato nyonso oyo bavandaki na Likita monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 7 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28