bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 20
Acts 20
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 19
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 21 →
1
Wana mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendaki na Masedwane.
2
Wana azalaki kotambola kati na etuka yango; azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na mokili ya Gresi,
3
epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalaki ye likita mpo na kosala ye mabe. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane.
4
Tala bato oyo bakendaki na ye elongo: Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere, Aristarike mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika, Gayusi, moto ya Derbe, Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya mokili ya Azi.
5
Bango nde bakendaki liboso mpo na kozela biso na Troasi.
6
Kasi biso tozwaki masuwa na engumba ya Filipi sima ya feti ya mapa ezanga levire. Wana totambolaki mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi. Tosalaki kuna mikolo sambo.
7
Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo oyo asengelaki kokende na mobembo na mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi, mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.
8
Tosanganaki na shambre ya likolo oyo ezalaki na miinda ebele.
9
Nzoka nde, elenge mobali moko, na kombo ya Etikisi avandaki na lininisa. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi mpe na mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.
10
Polo akitaki, atiaki litoyi na ye na tolo na ye, akamataki ye na maboko na ye mpe alobaki: “Bobanga te, azali na bomoi.”
11
Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendaki.
12
Bongo, bazongisaki elenge mobali epai na bango na bomoi mpe bango nyonso balendisamaki makasi.
13
Biso tokendaki liboso, mpe tozwaki masuwa oyo ememaki biso na Asosi, epai wapi Polo asengelaki komatela na masuwa. Azwaki mokano wana, mpo ete ye moko alingaki kokende kuna na makolo.
14
Tango akutanaki na biso na Asosi, amataki na masuwa elongo na biso mpe tokendaki na Mitilena.
15
Longwa wana, tozwaki masuwa mpo na kokende, mpe tokomaki liboso ya Shio na mokolo oyo elandaki. Sima ya mokolo moko, tokomaki na Samosi, mpe na mokolo oyo elandaki, tokomaki na Mile.
16
Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe kolekisa tango te na mokili ya Azi, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi, mpo ete azala na mokolo ya Pantekote.
17
Wuta na Mile, Polo abengisaki bakambi ya Lingomba ya Efeso.
18
Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango: —Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango, tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azi.
19
Nasalelaki Nkolo na komikitisa nyonso, na mayi na miso, ata namekamaki makasi na nzela ya mitambo ya Bayuda.
20
Nzoka nde, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
21
Nazalaki tango nyonso kosenga ezala na Bayuda to na bato ya mokili ya Greki ete bazonga epai na Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe ete bandimela Nkolo na biso Yesu.
22
Boye, sikʼoyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna.
23
Eloko moko kaka nayebi ezali ete, Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota.
24
Nzoka nde, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali: kosukisa malamu momekano na ngai ya kokima mbangu mpe kokokisa mosala oyo Nkolo apesaki ngai, ya kosakola sango malamu ya ngolu na Nzambe.
25
Sikʼoyo, nayebi ete bokomona ngai lisusu te, bino nyonso kati na banani nalekaki mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe.
26
Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso.
27
Pamba te, nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe, mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.
28
Bomibatela malamu mpe bobatela mpate nyonso oyo Molimo Mosantu apesa bino ete bokengela. Bozala babateli ya Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na ye moko.
29
Nayebi malamu ete sima na ngai kokende, bato mabe bakoya kati na bino, bakozala lokola bankosi, bakoyokela mpate mawa te.
30
Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.
31
Yango wana, bofungola miso! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moi, natikaki te, na mayi na miso, kokebisa moko na moko na bino.
32
Sikʼoyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe ya Liloba na ye na ngolu. Ye azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula elongo na basantu nyonso.
33
Nalulaki palata, to wolo to elamba ya moto moko te.
34
Bino moko boyebi malamu ete maboko na ngai oyo nde esalaki mosala mpo na kopesa ngai mpe baninga na ngai, biloko oyo tozalaki na yango posa.
35
Na misala nyonso oyo nazalaki kosala, nazalaki kotalisa bino ete, ezali na nzela ya mosala ya makasi ya lolenge wana nde tokoki kosunga bato bakelela, wana tozali kokanisa Maloba oyo ye moko Nkolo Yesu aloba: “Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa!”
36
Tango asilisaki koloba, ye elongo na bango nyonso bafukamaki mpe abondelaki.
37
Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki ye mpe bapesaki ye beze.
38
Bayokaki mawa mingi mpo ayebisaki bango ete bakomona ye lisusu te. Bongo bakendaki kotika ye kino na masuwa.
← Chapter 19
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 21 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28