bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Acts 18
Acts 18
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 17
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 19 →
1
Sima na yango, Polo atikaki Atene mpe akendaki na Korinto.
2
Kuna, akutanaki na Moyuda moko na kombo ya Akila, moto ya mboka Ponti. Akila awutaki koya kala te longwa na Itali elongo na mwasi na ye Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso babima na Rome. Boye, Polo akendaki kotala bango,
3
mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango.
4
Mikolo nyonso ya saba, Polo azalaki koteya na ndako ya mayangani, mpe azalaki koluka na nzela nyonso ete Bayuda mpe bato ya mokili ya Greki bakoka kondima.
5
Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka mpo na koteya Liloba, mpe kotalisa solo epai na Bayuda ete Yesu azali Klisto.
6
Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki: “Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya!”
7
Boye, Polo atikaki bango mpe akendaki na ndako ya moto moko na kombo ya Titisi Jistisi. Moto yango azalaki kosambela Nzambe mpe ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya mayangani.
8
Boye, Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani elongo na libota na ye mobimba bandimelaki Nkolo. Boye, bato mingi ya Korinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi.
9
Ezalaki mokolo moko na butu, Nkolo alobaki na Polo na emoniseli: “Kobanga te, koba kaka koloba mpe kokanga monoko te,
10
pamba te nazali na yo elongo. Moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.”
11
Boye, Polo avandaki na Korinto, mbula moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba ya Nzambe.
12
Kasi wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo.
13
Tala ndenge bafundaki ye: “Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete basambela Nzambe na ndenge mibeko epekisa.”
14
Tango kaka Polo alingaki koloba, Galioni alobaki na Bayuda: “Bino Bayuda, soki moto oyo asalaki mabe to likambo moko ya sembo te, nalingaki solo koyokela bino.
15
Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe mpo na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye; wana etali kaka bino moko.”
16
Boye, abenganaki bango na esambiselo.
17
Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, bakomaki kobeta ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba.
18
Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Korinto. Boye, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendaki na Siri elongo na Prisile mpe Akila. Liboso ya kolongwa na libongo ya Sankresi, Polo akokolisaki suki ya moto na ye, mpo ete alapaki ndayi.
19
Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendaki na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda.
20
Basengaki ete awumela mwa mikolo elongo na bango kasi Polo aboyaki.
21
Boye, tango atikaki bango, alakaki bango: “Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi.” Azwaki masuwa na Efeso mpe akendaki.
22
Tango akomaki na Sezare, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote, sima akendaki na Antioshe.
23
Sima ya kovanda mwa mikolo na Antioshe, Polo alongwaki wana mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, epai wapi azalaki kolendisa bayekoli nyonso.
24
Moyuda moko oyo abotamaki na Alekizandri, na kombo ya Apolosi ayaki na Efeso. Ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi.
25
Bateyaki ye nzela ya Nkolo, mpe azalaki koloba penza na molende makambo oyo etali Yesu ata ayebaki kaka libatisi ya Yoane.
26
Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akila bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango, mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe.
27
Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Korinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi.
28
Pamba te, maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele na nzela ya Makomi ete Yesu azali Klisto.
← Chapter 17
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 19 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28