bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 1
Matthew 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 2 →
1
Oyo ezali bakombo ya bankoko ya Yesu Kristo, mwana ya David, mwana ya Abraham:
2
Abraham abotaki Izaki; Izaki abotaki Zakobi; mpe Zakobi abotaki Yudana bandeko na ye.
3
Yuda na mwasi na ye Tamare babotaki Farezi mpe Zara; Fareziabotaki Esromi; mpe Esromi abotaki Arami.
4
Arami abotaki Aminadabi; Aminadabi abotaki Nasoni; mpe Nasoni abotaki Salmon;
5
Salmon na mwasi na ye Rabi babotaki Bowazi; mpe Bowasi na mwasi na ye Ruti babotaki Obedi.
6
Obedi abotaki Isayi; Isayi abotaki Mokonzi David; mpe Mokonzi David na mwasi oyo Uri atikaki, babotaki Salomon.
7
Salomon abotaki Robowami; Robowami abotaki Abia; mpe Abia abotaki Asa;
8
Asa abotaki Zozafati; Zozafati abotaki Zorami; mpe Zorami abotaki Oziasi.
9
Oziasi abotaki Zowatami; Zowatami abotaki Akazi; mpe Akazi abotaki Ezekiasi.
10
Ezekiasi abotaki Manase; Manase abotaki Amoni; mpe Amoni abotaki Zoziasi.
11
Zoziasi abotaki Zakoniasi na bandeko na ye; bango babotamaki tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na ekolo ya Babilone.
12
Sima ya komema bato ya Isayele na Babilone; Zekoniasi abotaki Salatiele; mpe Salatiele abotaki Zorobabele;
13
Zorobabele abotaki Abiyudi; Abiyudi abotaki Eliyakimi; mpe Eliyakimi abotaki Azori.
14
Azori abotaki Sadoki; Sadoki abotaki Akimi; mpe Akimi abotaki Eliyudi.
15
Eliyudi abotaki Eleyazari; Eleyazari abotaki Matani; mpe Matani abotaki Zakobi.
16
Zakobi abotaki Zozefi, oyo azalaki mobali ya Mariya, mama ya Yesu oyo babengaka Kristo.
17
Bango nyonso, banda na Abraham kino na David, ezalaki na mabota zomi na minei; banda David kino na tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na Babilone, ezalaki na mabota zomi na minei; mpe kobanda tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu kino na Kristo, ezalaki na mabota zomi na minei.
18
Tala ndenge Yesu Kristo abotamaki: mama na ye Mariya, azalaki elenge mwasi oyo Zozefi andimaki kobala. Kasi liboso ete bavanda esika moko, Mariya azwaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu.
19
Zozefi, mobali na ye, azalaki moto na sembo mpe alingaki te koyokisa ye soni na miso ya bato; yango wana akanaki aboya ye na sekele.
20
Awa azalaki kokanisa mpo na makambo yango, anzelu ya Nkolo abimelaki ye na ndoto, mpe alobaki na ye: —Zozefi mwana ya David, kobanga te mpo na kozwa Mariya mwasi na yo, pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.
21
Akobota mwana mobali, bongo okopesa ye kombo Yesu, pamba teye moto akobikisa bato na ye na masumu na bango!
22
Nyonso oyo esalamaki mpo ete maloba oyo Nkolo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisama:
23
Boyoka, elenge mwasi oyo ayebi naino mobali te, akozwa zemi. Akobota mwana mobali, mpe bakopesa ye kombo Emanuele; yango elingi koloba: Nzambe azali elongo na biso!
24
Tango Zozefi alamukaki, asalaki ndenge anzelu ya Nkolo atindaki ye, mpe azwaki Mariya mwasi na ye.
25
Kasi Zozefi ayebaki nzoto na ye te kino tango abotaki mwana mobali; mpe apesaki ye kombo Yesu.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28