bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Matthew 8
Matthew 8
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 7
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 9 →
1
Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki ye.
2
Bongo moto moko ya maladi ya maba ayaki, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki: —Nkolo, soki olingi, okoki kokomisa ngai peto.
3
Yesu atombolaki loboko, asimbaki ye, mpe alobaki: —Nalingi yango; koma peto. Kaka na tango wana apetolamaki na maba na ye.
4
Bongo yesu alobaki na ye: —Yoka! koyebisa likambo oyo na moto te; kasi kende komilakisa epai ya nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize atinda. Yango ekozala litatoli epai na bango.
5
Tango yesu azalaki kokota na Kapenawumi, mokonzi moko ya basodaayaki epai na ye mpe asengaki ye lisalisi;
6
alobaki: —Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali na maladi ya buka-buka, mpe azali koyoka pasi mingi penza!
7
Yesu azongiselaki ye: —Nakokende kobikisa ye!
8
Mokonzi ya basoda alobaki: —Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai; kasi loba kaka liloba moko mpe mosali na ngai akobika.
9
Pamba te ngai moko mpe nazali na nse ya bokonzi ya bakonzi, mpe nazali na basoda oyo bazali na nse ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko: “Kende”, akokende. Mpe na mosusu; “Yaka”, akoya. Mpe na mosali na ngai: “Sala boye”; akosala yango.
10
Yesu akamwaki mingi tango ayokaki bongo. Bongo alobaki na bato oyo bazalaki kolanda ye: —Nalobi na bino ya solo, naino namoni kondima monene ya boye te na Isayele.
11
Nalobi na bino: bato mingi bakowuta na mikili ya Este mpe ya Weste bakovanda elongo na Abraham, Izaki mpe Zakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
12
Kasi bato oyo basengelaki kozala bato ya Bokonzi, bakobwaka bango libanda, kati na molili; epai ekozala kolela mpe koswa mino.
13
Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda: —Kende, esalama se bongo ndenge ondimeli! Mpe, kaka na tango wana, mosali na ye abikaki.
14
Tango Yesu akomaki na ndako ya Piere, akutaki bokilo ya pierealali na mbeto mpo azalaki na fievre.
15
Yesu asimbaki loboko na ye, mpe fievre esilaki. Bongo atelemaki, mpe abandaki kobongisela ye biloko ya kolia!
16
Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki ya kokangama na milimo mabe. Na liloba moko, azalaki kobengana milimo wana ya mabe; mpe azalaki kobikisa bato nyonso ya maladi.
17
Na yango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisamaki: Azwaki bapasi na biso, mpe amemaki bamaladi na biso!
18
Tango Yesu amonaki bato ebele penza bazingaki ye, atindaki bayekoli na ye bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.
19
Molakisi moko ya Mibeko ayaki epai na ye, mpe alobaki: —Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende!
20
Kasi yesu azongisaki: —Banyama ya zamba bazali na mabulu na bango, mpe bandeke bazali na bazala na bango; kasi Mwana ya Moto azali na esika oyo akoki kopemisa motu te!
21
Moto mosusu, moko na kati ya bayekoli na ye, alobaki na ye: —Nkolo, pesa ngai nzela nakende liboso kokunda tata na ngai.
22
Kasi Yesu azongiselaki ye: —Landa ngai, mpe tika baoyo bakufa bakunda bakufi na bango.
23
Bongo Yesu amataki na bwato mpe bayekoli na ye balandaki ye.
24
Na mbala moko, mopepe ya makasi ebandaki koleka na ebale, na ndenge ete mbonge ezalaki komata likolo koleka bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
25
Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe balamusaki ye; balobaki: —Nkolo, bikisa biso, tolingi kokufa!
26
Kasi yesu azongisaki: —Bato ya kondima moke! Mpo na nini bozali kobanga? Atelemaki, agangelaki mopepe na ebale, mpe kimia ezongaki.
27
Bato bakamwaki mpe batunaki: —Yango moto oyo azali nani, mpo ete mopepe na ebale etosa ye?
28
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na mokili ya Gadara, bato mibale bazalaki na milimo mabe, babimaki na simetiele mpe bayaki kokutana na Yesu. Bazalaki na kanda mingi penza, yango wana moto ata moko te azalaki komeka koleka na nzela wana.
29
Babandaki koganga: —Mwana ya Nzambe, olingi kosala biso nini? Boni, oye kotungisa bisoliboso ete tango ekoka?
30
Mwa mosika moke, etonga monene ya bangulu ezalaki kolia.
31
Milimo mabe ebondelaki Yesu: —Soki obengani biso, tinda biso tokota na bangulu wana!
32
Bongo Yesu alobaki: —Bokende! Milimo mabe ebimakina na bato wana mibale mpe ekotaki na bangulu. Kaka na tango wana, bangulu yango nyonso elongwaki mbangu na ngomba, edindaki na ebale mpe ekufaki na mayi.
33
Bato oyo bakengelaka bangulu bakimaki; bakendaki na vile, mpe bayebisaki makambo nyonso na oyo esalamaki na bato oyo bazalaki na milimo mabe.
34
Bato nyonso ya vile babimaki mpo na kokutana na Yesu; tangu bamonaki ye, babondelaki ye alongwa na mokili na bango.
← Chapter 7
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 25
Chapter 26
Chapter 27
Chapter 28
Chapter 9 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28